Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 32:31 - Mokanda na Bomoi

31 Pamba te Libanga na bango azali lokola libanga na biso te ; bango moko banguna na biso bayebi yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 32:31
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete moto nyonso oyo, kati na bino, azali na molongo ya bato ya Yawe akende na Yelusalemi kati na Yuda mpo na kotonga Tempelo ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo azali Nzambe kati na Yelusalemi !


Nzela ya Nzambe ezali ya kokoka, Liloba na Yawe ezali na mbeba te ; azali nguba mpo na bato nyonso oyo bazwaka Ye lokola ebombamelo na bango.


Alongolaki bapine na bashar na bango mpo ete bamona pasi mpo na kokumba. Boye bato ya Ejipito balobaki : — Tokima mosika ya bana ya Isalaele, pamba te Yawe azali kobundela bango liboso na biso.


Faraon azongisaki : — Tika ete esalema lobi. Moyize alobaki : — Iyo, ekosalema ndenge osengi, mpo oyeba ete moko te azali lokola Yawe, Nzambe na biso.


Libanga na bango ya makasi ekolimwa na somo ; mpe bakambi na bango bakolenga na somo na komona bendele ya etumba, » elobi Yawe oyo moto na Ye ezali kati na Siona mpe fulu ya moto na Ye ezali kati na Yelusalemi.


mpe sik’oyo akokisi yango, asali ndenge kaka akanaki kosala. Makambo oyo nyonso esalemi mpo ete bino, bato, bosalaki masumu liboso ya Yawe mpe batosaki Ye te.


Mokonzi alobaki na Daniele : « Solo, Nzambe na bino azali Nzambe ya banzambe, Nkolo ya bakonzi mpe Molakisi mabombami, mpo ete okoki kolakisa mabombami oyo ! »


Yango wana, nazwi mokano ete moto nyonso, azala ya mokili, ekolo to lokota nini, oyo akoloba mabe mpo na Nzambe ya Shadraki, Meshaki mpe Abedinego, bakokata-kata ye na biteni, bakobuka ndako na ye mpe bakokomisa yango mopiku ya mbindo, pamba te Nzambe mosusu azali te, oyo akoki kobikisa bato na Ye na lolenge oyo !


Elakeli mabe moko te ekoki kozwa Jakobi, mpe kindoki ezali na nguya te likolo ya Isalaele. Bakoloba sik’oyo mpo na Jakobi mpe Isalaele : ‹ Tala makambo oyo Nzambe asali ! ›


Ndenge nini nakoki solo kolakela mabe bato oyo Nzambe alakela mabe te ? Ndenge nini nakoki solo koloba mabe mpo na bato oyo Yawe alobela mabe te ?


Moko te azali bule lokola Yawe ; moko te, bobele Yo. Libanga moko te ezali lokola Nzambe na biso.


Mawa na biso ! Nani akokangola biso na maboko ya Nzambe oyo ya nguya ? Ezali Nzambe wana nde abomaki bato ya Ejipito na nzela ya bitumbu ya ndenge na ndenge kati na esobe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ