Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 32:30 - Mokanda na Bomoi

30 Ndenge nini moto moko akoki kobengana bato nkoto moko, to bato mibale, kobundisa bato nkoto zomi soki Libanga na bango atekaki bango te to soki Yawe asundolaki bango te ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 32:30
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Akokaba Isalaele mpo na masumu oyo Jeroboami asali mpe asalisi Isalaele.


Na pokwa, batelemaki mpe bakendeki na molako ya bato ya Siri. Tango bakomaki na mondelo ya molako, bamonaki ata moto moko te,


Jeremi, mokonzi ya zomi ; mpe Makibanayi, mokonzi ya zomi na moko.


Atako ndambo ya basoda ya Siri kaka nde bayaki, kasi Yawe akabaki na maboko na bango mampinga ya bato ya Yuda, oyo elekaki monene, pamba te basundolaki Yawe, Nzambe ya batata na bango. Boye, basoda ya Siri bakokisaki etumbu oyo ekweyelaki Joasi.


Soki akotisi yo na boloko mpe asangisi basambisi mpo na kokata likambo, nani akotelemela Ye ?


Nzambe akabi ngai na maboko ya bato mabe mpe abwaki ngai na manzaka na bango.


Nakozalaka moto ya esengo mpe nakosepelaka kati na bolingo na Yo ; pamba te omonaka pasi na ngai, mpe oyebi mitungisi na ngai.


Osundoli biso na maboko na bango lokola bameme ya koboma mpe opanzi biso kati na bikolo.


Bato nkoto moko bakokima na mangungu ya moto moko kaka ; mpe na mangungu ya bato mitano, bino nyonso bokokima kino bokotikala lokola nzete ya bendele na songe ya ngomba, mpe lokola bendele na likolo ya ngomba moke. »


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Wapi mokanda ya koboma libala oyo Ngai nabenganelaki mama na bino ? To natekaki bino epai ya nani oyo Ngai nazalaki na niongo na ye ? Botekamaki mpo na masumu na bino ; mpe libala ya mama na bino ekufaki mpo na botomboki na bino.


Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : « Lokola bomitekaki na ofele, bokosikolama mpe na mbongo te. »


Bokobengana banguna liboso na bino mpe bakokufa na mopanga liboso na bino.


Bato mitano kati na bino bakolanda bato nkama moko, bato nkama moko kati na bino bakolanda bato nkoto zomi ; mpe banguna na bino bakokufa liboso na bino na mopanga.


Lokola azalaki na eloko moko te mpo na kofuta, mokonzi na ye atindaki ete bateka ye, mwasi na ye, bana na ye mpe biloko na ye nyonso mpo ete niongo na ye efutama.


Yawe azali lokola Libanga ; misala na Ye ezali ya kokoka, mpe banzela na Ye nyonso ezali sembo ; azali Nzambe ya boyengebene, asalaka mabe te ; azali sembo mpe alima.


Moto moko kaka kati na bino azalaki kokimisa bato nkoto moko, pamba te Yawe, Nzambe na bino, azalaki kobundela bino ndenge alakaki.


Bongo Yawe atombokelaki bana ya Isalaele mpe akabaki bango na maboko ya bato mabe oyo babotolaki bango biloko na makasi ; asundolaki bango epai ya banguna na bango, oyo bazalaki zingazinga na bango, mpe bazangaki makoki ya kotelemela bango.


Yawe asilikelaki bana ya Isalaele, mpe akabaki bango na maboko ya Kushani-Rishetayimi, mokonzi ya Arami. Bana ya Isalaele basalaki mibu mwambe na se ya bokonzi na ye.


Moko te azali bule lokola Yawe ; moko te, bobele Yo. Libanga moko te ezali lokola Nzambe na biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ