Bokosala nini na mokolo ya kosambisama, tango pasi ekowuta mosika ? Bokokimela epai ya nani mpo ete asunga bino ? Esika nini bokobomba bomengo na bino ?
Moto oyo azwaka bomengo na nzela ya sembo te azali lokola ndeke oyo evandeli maki ya ndeke mosusu. Boye, bomengo yango ekokima na kati-kati ya bomoi na ye mpe ekomonisa bozoba na ye na suka ya bomoi na ye.
Mbindo na ye ekangami ye na elamba, ayebaki te makambo nini ekokomela ye na sima. Tala ye wana akweyi, bongo kokweya na ye ezali kokamwisa ; moto oyo akolendisa ye azali te ! « Oh Yawe, tala pasi na ngai, pamba te monguna alongi ngai ! »
Efrayimi akoloba : « Banzambe ya bikeko ezali lisusu na tina nini epai na Ngai ? » Ngai nakoyanola ye mpe nakosunga ye. Nazali lokola nzete ya sipele ya mobesu, Ngai nde nasalaka ete obota mbuma.
Pamba te nayebi solo ete sima na kufa na ngai, bokomibebisa mpe bokopengwa mosika na nzela oyo natindaki bino. Na mikolo oyo ezali koya, bokono ekokweyela bino, pamba te bokosala mabe na miso ya Yawe mpe bokotumbola kanda na Ye na nzela ya misala ya maboko na bino. »
Oh, soki mitema na bango ezalaki penza ya kobongama mpo na kobanga Ngai mpe kobatela mibeko na Ngai tango nyonso, mpo ete bakoka kozala tango nyonso malamu elongo na bana na bango !