Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 32:27 - Mokanda na Bomoi

27 Kasi nazali kobanga ete banguna bafinga Ngai mpe bayini na bango bamikosa te na koloba : ‹ Tolongaki na makasi na biso moko, Yawe asalaki eloko moko te. › »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 32:27
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto na Nzambe ayaki mpe alobaki na mokonzi ya Isalaele : — Tala liloba oyo Yawe alobi : « Lokola bato ya Siri bakanisi ete Ngai nazali nzambe ya bangomba, kasi ya etando te, nakokaba mampinga monene oyo na maboko na yo mpe okoyeba ete Ngai nazali Yawe. »


Oh Yawe, Nkolo na ngai, ozali makasi ya lobiko na ngai, obatelaka moto na ngai kati na mokolo ya etumba.


Yawe, kokokisa te posa ya moto mabe, kolongisa te mabongisi na ye, noki te akokoma lolendo.


Mpo na nini bato ya Ejipito baloba : « Nzambe na bango azalaki na makanisi mabe tango abimisaki bango na Ejipito. Ezali nde mpo na koboma bango na mokili ya bangomba mpe kosilisa bango na mokili. » Lembisa kanda na Yo ya makasi mpe kosala lisusu mabe te na bato na Yo.


« Boyebisa Ezekiasi, mokonzi ya Yuda : ‹ Kotika te ete Nzambe na yo, oyo otielaka motema akosa yo na maloba oyo : ‘ Yelusalemi ekokweya te na maboko ya mokonzi ya Asiri. ’


‹ Nakobatela engumba oyo mpe nakobikisa yango mpo na lokumu ya Kombo na Ngai mpe mpo na lokumu ya Davidi, mosali na Ngai. › »


Olobaki : « Nakozala mwasi mokonzi mpo na libela ! » Kasi motema na yo ekanisaki te tina ya makambo oyo mpe ndenge nini ekosukela.


Nasali yango kaka mpo na lokumu na Ngai, mpo na lokumu na Ngai moko. Ndenge nini nakoki solo komisambwisa Ngai moko ? Nakokaba nkembo na Ngai na nzambe mosusu te.


Lokola bato oyo basundoli Ngai mpe bakomisi esika oyo esika ya banzambe ya bapaya, lokola bakomi kotumba mbeka na esika oyo mpo na banzambe oyo ; ezala bango, batata na bango to bakonzi ya Yuda, batikalaki koyeba te, batondisi esika oyo na makila ya bato oyo basali mabe ata moko te,


Mbindo na ye ekangami ye na elamba, ayebaki te makambo nini ekokomela ye na sima. Tala ye wana akweyi, bongo kokweya na ye ezali kokamwisa ; moto oyo akolendisa ye azali te ! « Oh Yawe, tala pasi na ngai, pamba te monguna alongi ngai ! »


amilobelaki : « Boni ! Oyo ezali te Babiloni monene oyo natongaki lokola ndako ya mokonzi, na makasi na ngai, na nguya na ngai mpe mpo na lokumu ya bokonzi na ngai ? »


Kasi moto nyonso oyo akosala lisumu na nko, azala mwana mboka to mopaya, atioli nde Yawe ; mpe moto ya lolenge oyo basengeli kolongola ye kati ya bato na ye.


noki te bato ya mokili oyo longwa kuna obimisaki biso, bakoloba : ‹ Ezali mpo ete Yawe azalaki na makoki te ya kokotisa bango na mokili oyo alakaki bango to ezali mpo ete azalaki koyina bango, yango wana abimisaki bango wuta na Ejipito mpo na koboma bango na esobe. ›


Bato ya Kanana mpe bato mosusu ya mokili bakoyoka sango yango, bakobalukela biso mpe bakolongola kombo na biso na mokili. Boye, okosala nini mpo na monene ya Kombo na Yo ?


Mpo na lokumu ya Kombo monene na Ye, Yawe akobwaka bato na Ye te, pamba te asepelaki kokomisa bino bato na Ye moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ