25 Na libanda, mopanga ekokomisa bango bato bazanga bana ; kati na bandako na bango, somo ekokonza ; bilenge mibali mpe bilenge basi, bana mike mpe bampaka, bango nyonso bakokufa.
Boye, mpo na kobebisa bango, Yawe atindaki mokonzi ya bato ya Babiloni, oyo abomaki na mopanga bilenge na bango kati na esika na bango ya bule ; abikisaki te ezala elenge mobali, elenge mwasi, mokolo to mobange. Nzambe akabaki nyonso na maboko ya Nabukodonozori.
Sik’oyo tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga mpe Nzambe ya Isalaele, alobi : Mpo na nini bozali komimemela pasi ya makasi boye kino mokili ya Yuda ezangela mibali, basi, babebe mpe etikala lisusu ata na moto moko te ?
Mpo na nini bozali kopelisa kanda na Ngai na nzela ya misala na bino ya mabe, na kotumbaka malasi ya ansa lokola mbeka epai ya banzambe mosusu ya Ejipito epai wapi bokeyi kovanda ? Bino moko nde bozali komibebisa mpe komikomisa bato ya libabe mpe eloko ya kotiola kati ya bikolo nyonso ya mokili.
Loba : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Bibembe ya bato ekolala na mabele mpe ekotikala wana lokola fimie ya bilanga, lokola liboke ya bambuma oyo mobuki bambuma atiki na sima na ye mpe moto oyo akolokota yango azali te. › »
Oh Yawe, tala ndenge nazali na pasi : libumu na ngai ezali kotungisama, mpe motema na ngai ezali kosala pasi, pamba te nazalaki motomboki penza. Na libanda, mopanga ezali koboma bana na ngai ; mpe na kati, ezali kaka kufa.
Likolo ya nzala, lolemo ya mwana ekangami na likolo ya kati ya monoko na ye ; bana mike bazali kosenga bilei kasi moto moko te azali kopesa bango yango.
Mopanga ekoboma na libanda ya engumba, bokono oyo ebomaka mpe nzala makasi ekoboma kati na engumba ; bato oyo bazali kati na mokili bakokufa na mopanga, mpe bato oyo bazali kati na engumba bakokufa na bokono oyo ebomaka mpe na nzala makasi.
Nakopesa nzela na mopanga mpo ete eboma bino mpo na kozongisa mabe na mabe likolo ya boyokani oyo bino bobebisi. Tango bokosangana kati na bingumba na bino, nakotindela bino bokono oyo ebomaka, mpe nakokaba bino na maboko ya monguna.
Pamba te, tango kaka tokomaki na Masedwane, tozwaki ata tango ya kopema te ; tokutanaki na pasi ya lolenge nyonso : bitumba na libanda, mpe bobangi kati na mitema na biso.