Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 32:23 - Mokanda na Bomoi

23 Nakobakisela bango pasi likolo ya pasi, nakobwakela bango makonga na Ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 32:23
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abwakaki makonga na Ye, mpe atindaki yango na bangambo nyonso ; abakisaki motango ya mikalikali mpo na kopalanganisa yango.


Lokola basundolaki Ngai mpe batumbaki mbeka ya malasi mpo na banzambe mosusu kino kotumbola Ngai na nzela ya biloko nyonso oyo maboko na bango esilaki kosala, kanda na Ngai epeli makasi mpo na kobebisa esika oyo, mpe ekokita te. »


Yawe agangaki wuta na Lola, mongongo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo eyokanaki na nzela ya mvula ya mabanga mpe makala ya moto.


Kati na kongenga na Yo, zala molongi, mata na shar na Yo, telema mpo na solo, mpo na komikitisa, mpe mpo na bosembo ; tika ete loboko na Yo ya mobali esala misala minene.


Abongisaka bibundeli oyo ebomaka mpe asalaka ete makonga na Ye ekoma kozikisa.


Oh Yawe, okomisi ekolo na Yo monene ! Solo, okomisi ekolo na Yo monene, omipesi penza lokumu ; opusi bandelo nyonso ya mokili mosika penza.


Atobolaki motema na ngai, na makonga oyo ewutaki na libenga na Ye.


Kasi tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Atako natindeli Yelusalemi bitumbu na Ngai oyo minei ya somo : mopanga, nzala makasi, banyama mabe mpe bokono oyo ebomaka, mpo na kosilisa koboma bato mpe bibwele na yango,


« Tango nakobwakela yo makonga na Ngai ya mike ya nzala makasi oyo ebomaka mpe oyo ebebisaka, nakosala bongo mpo na kosilisa koboma bino : nakoyeisa nzala makasi koleka kati na yo mpe nakolongola bilei na bibombelo na yo.


Boboma bampaka, bilenge, basali ya mibali, basali ya basi mpe bana mike ; kasi bomeka kosimba te moto nyonso oyo azali na elembo na elongi. Bobanda na Esika na Ngai ya bule ! » Boye babandaki na bampaka oyo bazalaki liboso ya Tempelo.


Soki atako bongo boyoki kaka te, nakopesa bino bitumbu mbala sambo mpo na masumu na bino.


Ngai mpe nakotelemela bino mpe nakopesa bino bitumbu mbala sambo mpo na masumu na bino.


Kasi soki botosi te Yawe, Nzambe na bino, mpe bosaleli te mitindo mpe bikateli na Ye, oyo nazali kopesa bino lelo, tala bilakeli mabe oyo ekokomela bino mpe ekokanga bino :


Milongo ya bana na bino oyo ekoya sima na bino mpe bapaya oyo bakowuta na mikili ya mosika bakomona bitumbu oyo Yawe akokweyisela mokili wana.


Tango mopanga na Ngai ekozala kosasa misuni ya bato, nakolangwisa makonga na Ngai na makila ya bato oyo babomi, ya bakangami mpe ya mito ya bakonzi ya banguna. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ