Deteronomi 32:21 - Mokanda na Bomoi21 Bazwelaki Ngai mbanda oyo azali ata nzambe te, batumbolaki kanda na Ngai likolo ya biloko oyo ekoki kutu kozala ata banzambe ya bikeko te. Boye, Ngai mpe nakosala ete bango mpe bayokela oyo ezali ata ekolo te zuwa ; nakosala ete ekolo moko ya bazoba epesa bango kanda. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Asembolaki elilingi moko lokola loboko mpe asimbaki ngai na suki ya moto. Molimo atombolaki ngai na kati-kati ya se mpe likolo mpe amemaki ngai, kati na emoniseli ya Nzambe, kino na Yelusalemi, na ekotelo ya Ekuke ya nor ya lopango ya kati ya Tempelo, epai wapi batelemisaki nzambe ya ekeko oyo etumbolaka zuwa.