2 Tika ete mateya na ngai ekweya lokola mvula, mpe maloba na ngai ekita lokola londende, lokola mvula moke na likolo ya matiti, lokola mvula makasi na likolo ya milona !
azali lokola pole ya tongo, tango moyi ebimaka mpe engalaka makasi lokola nde mapata ezali te, lokola kongenga ya sima na mvula oyo ebimisaka matiti na mokili. ›
Opambolaka mabele, ofulukisaka yango, otondisaka yango na bozwi. Otondisaka moluka ya Nzambe na mayi, obongiselaka bato ble, pamba te otondisaka mayi mpo na yango.
Efrayimi, nasala yo lisusu nini ? Yuda, nasala yo lisusu nini ? Bolingo na bino mpo na Ngai ezali lokola londende ya tongo, lokola mamwe oyo elimwaka noki.
Yoka sik’oyo Liloba na Yawe, yo oyo ozali koloba na ngai : « Tika kosakola mpo na kotelemela libota ya Isalaele mpe tika koloba mabe mpo na ndako ya Izaki ! »
Batikali ya Jakobi bakozala, kati na bikolo ebele lokola mamwe oyo ewuti epai na Yawe, mpe na likolo ya matiti lokola londende oyo ekweyaka na makasi ya moto te to mpe etalelaka moto te.
Batikali ya Jakobi bakozala kati na mabota, na kati-kati ya bikolo ebele, lokola nkosi kati na banyama ya zamba, lokola mwana nkosi kati na etonga ya bameme : tango elekaka kati na etonga ya bameme, ekangaka mpe epasolaka yango, mpe moto oyo akoki kokangola yango azalaka te.
Bosenga epai na Yawe ete anokisa mvula ya suka ; ezali Yawe nde atindaka mapata mpe bakake oyo ememaka bamvula minene, Ye nde abimisaka matiti na elanga ya moko na moko.