Deteronomi 32:14 - Mokanda na Bomoi14 miliki ya bangombe mpe ya bameme ; apesaki bango mafuta ya bameme mpe ya bantaba, ya bana meme mpe ya ntaba ya mafuta ; mpe apesaki bameme ya mibali ya kitoko ya Bashani. Baliaki lisusu ble oyo eleki kitoko, bamelaki vino ya motane oyo ewutaki na bambuma ya vino. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Babotolaki bingumba batonga makasi mpe mabele oyo ebotaka malamu. Babotolaki bandako etonda na biloko ya ndenge na ndenge, mabulu ya mayi batimola wuta kala, bilanga ya vino, ya nzete ya olive mpe ya nzete mosusu ebele oyo ebotaka mbuma ya kolia. Na bolingo monene na Yo, baliaki mpe batondaki, bakomaki minene mpe basepelaki na mapamboli na Yo nyonso.