5 Yawe akokaba bango na maboko na bino mpe bokosala bango makambo nyonso oyo natindaki bino.
Yawe akobebisa bango ndenge kaka asalaki Sikoni mpe Ogi, bakonzi ya bato ya Amori, oyo abebisaki elongo na bamboka na bango.
Te ! Kobanga yango soki moke te ! Kanisa malamu makambo oyo Yawe, Nzambe na yo, asalaki Faraon mpe Ejipito mobimba.
mpe tango Yawe, Nzambe na yo, akokaba bango na maboko na yo, mpe tango okolonga bango, okobebisa bango nyonso mpe okotika ata ndambo te ; okosala ata boyokani moko te elongo na bango ; koyokela bango mawa te.
Jozue asalaki ndenge kaka Yawe atindaki ye na nzela ya mosali na ye Moyize, atikaki ata eloko moko te kati na makambo nyonso oyo Yawe atindaki Moyize.