Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 31:4 - Mokanda na Bomoi

4 Yawe akobebisa bango ndenge kaka asalaki Sikoni mpe Ogi, bakonzi ya bato ya Amori, oyo abebisaki elongo na bamboka na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 31:4
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe, Nzambe na biso, akabaki ye na maboko na biso mpe tobomaki ye, bana na ye ya mibali mpe mampinga na ye nyonso.


Na tango wana, nalobaki na Jozue : « Omonaki yo moko makambo oyo Yawe, Nzambe na bino, asalaki epai na bakonzi oyo mibale ; akosala kaka ndenge moko na bikolo nyonso epai wapi bokoleka.


Yawe, Nzambe na bino, akotambola Ye moko liboso na bino, akobebisa bikolo oyo ezali liboso na bino mpo ete bokamata mokili na bango ; Jozue nde akotambola liboso na bino ndenge Yawe alobaki.


Yawe akokaba bango na maboko na bino mpe bokosala bango makambo nyonso oyo natindaki bino.


Okoboma bato nyonso oyo Yawe, Nzambe na yo, akokaba na maboko na yo ; okoyokela bango mawa te. Kosalela banzambe na bango te mpo ete yango ekozala motambo mpo na yo.


mpe tango Yawe, Nzambe na yo, akokaba bango na maboko na yo, mpe tango okolonga bango, okobebisa bango nyonso mpe okotika ata ndambo te ; okosala ata boyokani moko te elongo na bango ; koyokela bango mawa te.


Natindelaki bango liboso na bino, banzoyi ya minene oyo ebenganaki bango mosika na bino, na bakonzi mibale ya Amori. Bosalaki yango na mipanga mpe na matolotolo na bino te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ