Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 31:29 - Mokanda na Bomoi

29 Pamba te nayebi solo ete sima na kufa na ngai, bokomibebisa mpe bokopengwa mosika na nzela oyo natindaki bino. Na mikolo oyo ezali koya, bokono ekokweyela bino, pamba te bokosala mabe na miso ya Yawe mpe bokotumbola kanda na Ye na nzela ya misala ya maboko na bino. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 31:29
28 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jakobi abengaki bana na ye ya mibali mpe alobaki : — Bosangana mpo ete nakoka koyebisa bino makambo oyo ekokomela bino na mikolo oyo ekoya.


Mokili ebebaki na miso ya Nzambe mpe etondaki na makambo ya mobulu.


‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Nakobengisa pasi makasi na esika oyo mpe na bavandi na yango kolanda bilakeli mabe nyonso oyo ekomama kati na buku oyo bawuti kotanga liboso ya mokonzi ya Yuda. ›


Ngai, nayebi na ngai malamu ete Mosikoli na ngai azali na bomoi, mpe, awa na mokili, akotelema ya suka mpo na kokata likambo na ngai.


Yawe alobaki na Moyize : — Kita, pamba te bato na yo, oyo obimisaki na Ejipito babungi nzela,


Mawa na yo, ekolo ya bato ya masumu, bato oyo batonda na mabe, libota oyo esalaka mabe mpe bana mabe ! Batiki Yawe, batioli Mosantu ya Isalaele mpe bapesi Ye mokongo.


Na mikolo ekoya, okobengama mpo na kobunda ; na mibu oyo ekoya, okokende kobundisa mokili oyo bavandi na yango, sima na bango kobika na mopanga, basangisaki bango kati na bikolo ebele, na likolo ya bangomba ya Isalaele, oyo ekufa mpe etikala lisusu na bato te wuta kala. Bakobima wuta na bikolo mosusu mpe bakovanda na kimia.


Sik’oyo, nayei kolimbolela yo makambo oyo ekokomela bato na yo na mikolo ekoya, pamba te emoniseli oyo ezali kolobela lisusu makambo oyo ekosalema na mikolo ekoya.


Bamikotisi penza kati na mabe ndenge basalaki na mikolo ya Gibea. Nzambe akobosana mabe na bango te mpe akopesa bango etumbu mpo na masumu na bango.


Bakoboma bango na mopanga mpe bakomema bango na bowumbu kati na bikolo nyonso ya bapaya ; mpe bapagano bakonyata Yelusalemi kino tango ya bapagano ekosila koleka.


Ezala kati na bino, bato mosusu bakobima, bakoteya mateya ya lokuta mpo na kopengwisa bayekoli ete bazala na ngambo na bango.


Moyize alobaki maloba ya nzembo yango, banda na ebandeli kino na suka, wana lisanga mobimba ya bana ya Isalaele ezalaki koyoka :


Alobaki : « Nakobombela bango elongi na Ngai, mpe nakotala ndenge nini suka na bango ekozala, pamba te bazali molongo ya bato mabe, bana bazanga boyengebene.


Soki kaka bazalaki bato ya bwanya, balingaki kososola likambo oyo mpe koyeba ndenge nini suka na bango ekozala !


Kasi bino, bomibebisaki liboso na Ye ; bozali lisusu bana na Ye te, mpo na mabe na bino, bino molongo ya bana mabe mpe ya bapengwi.


Bomibebisa te na kosala ekeko, elilingi ya mwasi to ya mobali,


Tango bokozala na mawa mpe pasi nyonso oyo ekokomela bino, sima na mikolo, bokozonga epai na Yawe, Nzambe na bino, mpe bokotosa Ye.


Molimo alobi polele ete, na tango ya suka, ebele bakosundola kondima, pamba te bakolanda milimo ya lokuta mpe mateya oyo ewuti na milimo mabe.


Kasi sik’oyo, na mikolo oyo ezali ya suka, Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Mwana na Ye, oyo Ye moko Nzambe akomisaki Mokitani ya biloko nyonso. Ezali mpe na nzela na Ye nde Nzambe asalaki mokili.


Liboso na nyonso, boyeba ete, na mikolo ya suka, batioli bakobima, bakotambola kolanda baposa na bango moko


Kasi soki elombe akufi, bato bazalaki kozongela misala mabe koleka kutu mabe ya batata na bango ; bazalaki kosambela, kosalela, kogumbamela banzambe mosusu. Bazalaki koboya kotika misala na bango ya mabe mpe bazalaki kaka kotingama na nzela na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ