28 Bosangisa liboso na ngai bakambi nyonso ya mabota na bino mpe bakalaka na bino, mpo ete naloba maloba oyo na matoyi na bango mpe nazwa likolo mpe se lokola batatoli mpo na kofunda bango.
Moyize aponaki bato ya mayele kati na bana ya Isalaele mpe akomisaki bango bakambi ya bato : bakambi ya bankoto, ya bankama, ya batuku mitano mpe ya bazomi.
Na mokolo ya lelo, nazwi likolo mpe se lokola batatoli mpo na yo : nasili kotia liboso na yo bomoi mpe kufa, mapamboli mpe bilakeli mabe. Sik’oyo, pona bomoi mpo ete yo mpe bana na yo bozala na bomoi.
Bosangisa bato : mibali, basi, bana mpe bapaya oyo bazali kati na bingumba na bino mpo ete bakoka koyoka mpe koyekola kotosa Yawe, Nzambe na bino, mpe kosalela malamu maloba nyonso ya mibeko oyo.
soki bosali makambo wana, likolo mpe se ekozala motatoli kati na ngai mpe bino : bokolimwa noki na mokili oyo bokokende kozwa sima na bino kokatisa Yordani. Bokowumela kuna tango molayi te, kasi bokobebisama solo ;