Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 31:26 - Mokanda na Bomoi

26 « Bokamata buku oyo ya Mobeko mpe botia yango pembeni ya Sanduku ya Boyokani ya Yawe, Nzambe na bino ; ekozala kuna lokola litatoli mpo na bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 31:26
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nabongisi kuna esika mpo na Sanduku ya Boyokani ya Yawe, boyokani oyo asalaki elongo na batata na biso tango abimisaki bango na mokili ya Ejipito.


Kati na Sanduku, ezalaki na eloko mosusu te longola kaka bitando mibale ya mabanga oyo Moyize atiaki na Orebi epai wapi Yawe asalaki boyokani elongo na bana ya Isalaele tango babimaki na Ejipito.


Okotia kati na sanduku bitando ya mabanga ya mibeko, oyo nakopesa yo.


Pamba te, na nzela ya Mobeko, ngai nasilaki kokufa na oyo etali Mobeko mpo ete nakoka kobika bomoi na ngai mpo na Nzambe. Nabakamaki na ekulusu elongo na Klisto ;


Sik’oyo, koma nzembo oyo mpe lakisa yango yo moko epai ya bana ya Isalaele, mpe sala ete bayemba yango mpo ete ezala litatoli mpo na Ngai, liboso na bango.


Bongo Moyize apesaki mitindo oyo epai ya Balevi oyo bazalaki komema Sanduku ya Boyokani ya Yawe :


Pamba te nayebi ndenge nini bozali batomboki mpe mito makasi. Soki, wana nazali nanu na bomoi kati na bino, bozali batomboki liboso ya Yawe, ekozala boni sima na kufa na ngai ?


Boye Moyize akomaki mibeko oyo mpe apesaki yango epai ya Banganga-Nzambe, bana mibali ya Levi, oyo bazalaki komema Sanduku ya Boyokani ya Yawe, mpe epai ya bampaka nyonso ya Isalaele.


Samuele alimbolelaki bato makambo oyo etali bokonzi, akomaki yango na buku mpe atiaki liboso ya Yawe. Sima na yango, azongisaki bato, moto na moto na ndako na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ