Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 31:19 - Mokanda na Bomoi

19 Sik’oyo, koma nzembo oyo mpe lakisa yango yo moko epai ya bana ya Isalaele, mpe sala ete bayemba yango mpo ete ezala litatoli mpo na Ngai, liboso na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 31:19
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpe kende epai ya mokonzi, yebisa ye maloba oyo. » Joabi ayebisaki maloba oyo asengelaki koloba.


Akoyanola libondeli ya bato oyo babungisaki biloko, mpe akondima mabondeli na bango.


Okoloba na ye mpe okotia maloba na monoko na ye, bongo Ngai nakosunga bino mibale mpo ete bokoka koloba malamu, mpe nakoteya bino makambo oyo bosengeli kosala.


Natiaki maloba na Ngai na monoko na yo, mpe nazipi yo na elili ya loboko na ngai ; nazali Ye oyo atiaki likolo na esika na yango, oyo atongaki miboko ya mabele mpe oyo alobaki na Siona : ‹ Bozali bato na Ngai ! › »


« Bongo mpo na Ngai, » elobi Yawe, « tala boyokani na Ngai elongo na bango : Molimo na Ngai, oyo azali epai na yo, mpe maloba na Ngai, oyo natiaki na monoko na yo ekolongwa te, na monoko na yo to na minoko ya bana na yo to na minoko ya bakitani na bango, kobanda kaka na tango oyo mpe libela na libela, » elobi Yawe.


Bongo Yawe asembolaki loboko na Ye, asimbaki monoko na ngai mpe alobaki : — Tala, nasili kotia maloba na Ngai kati na monoko na yo.


Boye, ezala bayokeli yo to baboyi koyokela yo, mpo ete bazali libota ya batomboki, bakososola solo ete mosakoli moko azali kati na bango.


Likolo na Ngai, bakomema bino na makasi liboso ya bayangeli mpe ya bakonzi. Boye, ekozala mpo na bino libaku malamu ya kotatola solo na tina na Ngai liboso na bango mpe liboso ya bapagano.


Moto oyo aboyi Ngai mpe ayambi te maloba na Ngai azali na mosambisi na ye : ezali liloba oyo nateyi nde ekosambisa ye, na mokolo ya suka.


Boteya yango na bana na bino na kolobelaka bango yango tango bovandi kati na bandako mpe tango bozali kotambola na nzela, tango bolali pongi mpe tango bolamuki.


Solo, na mokolo wana, nakobombela bango elongi na Ngai mpo na mabe nyonso oyo basalaki, wana bakendeki epai ya banzambe mosusu.


« Bokamata buku oyo ya Mobeko mpe botia yango pembeni ya Sanduku ya Boyokani ya Yawe, Nzambe na bino ; ekozala kuna lokola litatoli mpo na bino.


Moyize alobaki maloba ya nzembo yango, banda na ebandeli kino na suka, wana lisanga mobimba ya bana ya Isalaele ezalaki koyoka :


Oh likolo, yoka malamu, pamba te nalingi koloba ! Oh mabele, yoka malamu maloba ya monoko na ngai !


Okoteyaka yango na bana na yo tango ozali na ndako, tango ozali kotambola na nzela, tango olali mpe tango olamuki.


Jozue alobaki na bato nyonso : — Botala, libanga oyo ekozala litatoli mpo na biso, pamba te esili koyoka maloba nyonso oyo Yawe alobi na biso. Ekozala motatoli mpo na kosambisa bino mpo ete bowangana Nzambe na bino te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ