Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 31:18 - Mokanda na Bomoi

18 Solo, na mokolo wana, nakobombela bango elongi na Ngai mpo na mabe nyonso oyo basalaki, wana bakendeki epai ya banzambe mosusu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 31:18
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

— Bokende kotuna toli ya Yawe mpo na ngai, mpo na bato mpe mpo na Yuda mobimba, na tina na makambo oyo ekomama kati na buku oyo ewuti komonana. Pamba te kanda ya Yawe, oyo epeleli biso ezali makasi mpo ete batata na biso batosaki te maloba ya buku yango mpe basalaki te kolanda nyonso oyo ekomama kati na yango.


Bokeba ! Bosala boyokani te elongo na bavandi ya mokili yango ; noki te tango bakosambela banzambe na bango mpe bakobonzela yango mbeka, babenga bino mpo ete bolia mbeka na bango elongo ;


Solo, oyoka yango nanu te mpe oyebi yango te ; wuta kala, litoyi na yo ezalaka ya kokangama. Solo, nayebi ete ozalaka mokosi ; babengaka yo motomboki wuta na libumu ya mama na yo.


Yango wana, Yawe atombokeli bato na Ye, asemboli loboko na Ye mpe abeti bango ; bangomba eningani, bibembe na bango etondi lokola bafulu na balabala. Kasi ata bongo, kanda na Ye ekiti kaka te, loboko na Ye etikali kaka ya kosembolama.


Nzokande oh Yawe, ozalaka Tata na biso ; biso tozali lokola mabele oyo basalelaka bikeko, bongo Yo, ozali lokola mosali mbeki ; biso nyonso tozali mosala ya maboko na Yo.


kati na etumba na bato ya Babiloni : ‹ Bandako yango ekotonda na bibembe ya bato oyo nakoboma na nguya ya kotomboka mpe ya kanda na Ngai. Nakobombela engumba oyo elongi na Ngai likolo ya mabe na yango nyonso.


Mpe bato ya bikolo mosusu bakoyeba solo ete bana ya Isalaele bakendeki na bowumbu mpo na masumu na bango mpe mpo ete batambolaki na boyengebene te na miso na Ngai. Boye, napesaki bango mokongo mpo na kobomba elongi na Ngai mpe nakabaki bango na maboko ya banguna na bango, mpe bango nyonso bakufaki na mopanga.


Sik’oyo, koma nzembo oyo mpe lakisa yango yo moko epai ya bana ya Isalaele, mpe sala ete bayemba yango mpo ete ezala litatoli mpo na Ngai, liboso na bango.


Alobaki : « Nakobombela bango elongi na Ngai, mpe nakotala ndenge nini suka na bango ekozala, pamba te bazali molongo ya bato mabe, bana bazanga boyengebene.


Kasi bana ya Isalaele bayokelaki ata Bilombe na bango te, kasi bazalaki kosambela mpe kosalela banzambe mosusu. Batikaki noki nzela oyo batata na bango bazalaki kolanda : nzela ya kotosa mibeko na Yawe. Balandaki ndakisa na bango te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ