15 Yawe amimonisaki epai na bango lokola likonzi ya lipata kati na Ndako ya kapo ya Bokutani ; mpe likonzi yango ya lipata etelemaki na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
Na moyi, lipata ya Yawe ezalaki na likolo ya Mongombo ; bongo na butu, moto ezalaki kongala kati na lipata, mpe miso ya bana nyonso ya Isalaele ezalaki komona yango. Esalemaki bongo na mibembo na bango nyonso.
Yawe alobaki na Moyize : « Ozali kokende kopema elongo na bakoko na yo ; mpe, kala mingi te, bato oyo bakopengwa mpo na kosalela banzambe ya bapaya kati na mokili oyo bozali kokota, bakobosana Ngai mpe bakobuka boyokani na Ngai, oyo nasalaki elongo na bango.