Deteronomi 31:13 - Mokanda na Bomoi13 Bana na bango oyo bayebi mibeko oyo te basengeli koyoka yango malamu mpe koyekola kotosa Yawe, Nzambe na bino, tango nyonso oyo bokovanda kati na mokili oyo bokozwa sima na kokatisa Yordani. » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Boye Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli ; Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe ; mpe bato nyonso oyo batikalaki batosaki mongongo ya Yawe, Nzambe na bango, mpe maloba ya mosakoli Aje kolanda ndenge Yawe, Nzambe na bango, atindaki ye. Mpe bato nyonso bakomaki kobanga Yawe.