Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 30:5 - Mokanda na Bomoi

5 Yawe, Nzambe na bino, akomema bino na mokili ya bakoko na bino, mpe bokozwa yango ; akosalela bino bolamu mpe akokomisa bino ebele koleka bakoko na bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 30:5
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ozali malamu mpe osalaka makambo ya malamu ; teya ngai mitindo na Yo !


Nakomimonisa epai na bino, » elobi Yawe, « mpe nakozongisa bino longwa na bowumbu. Nakosangisa bino longwa na bikolo nyonso mpe na bisika nyonso epai wapi nabenganaki bino, » elobi Yawe, « nakozongisa bino na esika oyo namemelaki bino na bowumbu. »


Tango ezali koya, › elobi Yawe, ‹ tango oyo nakokangola bato na Ngai, Isalaele, mpe Yuda kati na bowumbu ; mpe nakozongisa bango na mokili oyo napesaki epai ya bakoko na bango mpo ete bakamata yango, › elobi Yawe. »


Boye engumba oyo, Yelusalemi, ekosala lokumu, esengo, masanzoli mpe nkembo ya Kombo na Ngai liboso ya bikolo nyonso ya mabele, oyo ekoyoka sango ya makambo nyonso ya kitoko oyo nakosala mpo na yango. Bikolo yango ekokamwa mpe ekolenga na somo ya komona makambo nyonso ya kitoko mpe kimia oyo nakopesa na engumba yango. ›


Nakokomisa motango ya bato mpe ya bibwele na bino ebele na mokili na bino : bakobotana mpe bakokoma ebele penza. Nakovandisa lisusu bato na mokili na bino ndenge ezalaka na tango ya kala mpe nakokomisa bino bato ya kofuluka koleka liboso. Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.


Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na mbala oyo lisusu, nakosala ete libota ya Isalaele eluka Ngai mpo ete natalisa bango ngolu na Ngai : nakosala ete bato na yango bakoma ebele lokola bibwele.


Moyize alobaki na Obabi, mwana mobali ya Reweli, moto ya Madiani, bokilo ya Moyize : — Tozali kokende na mokili oyo Yawe alobaki : « Nakopesa bino mokili yango. » Yaka kotambola elongo na biso. Tokosala ete obika bolamu oyo Yawe alakaki kosalela Isalaele.


Okosangisa biloko nyonso ya engumba yango oyo bobotoli na esika oyo bato nyonso bakutanaka mpe okotumba engumba nyonso mpe biloko na yango nyonso oyo bobotolaki lokola mbeka ya kotumba mpo na Yawe, Nzambe na bino. Ekotikala mopiku ya mabanga mpo na libela, ekoki kotongama lisusu te.


Akolinga bino mpe akopambola bino, akokomisa bino ebele, akopambola mabota na bino, mbuma ya mabele na bino : milona na bino, vino ya sika mpe mafuta ; akopambola bitonga ya bangombe na bino, bameme na bino mpe bantaba na bino kati na mokili oyo alapaki ndayi epai ya bakoko na bino ete akopesa bino yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ