Soki solo bozongeli Yawe, bandeko mpe bana na bino oyo bakendeki na bowumbu bakozwa ngolu liboso ya bato oyo bakangaki bango, mpe bakozonga na mokili oyo ; pamba te Yawe, Nzambe na bino, atonda na ngolu mpe na mawa. Solo, soki bozongeli Ye, akobalola te elongi na Ye mosika na bino. »
Kasi soki bozongeli Ngai mpe botosi mibeko na Ngai, wana, ezala soki bato na bino bakenda mosika na bowumbu kino na suka ya mokili, nakosangisa bango wuta kuna mpe nakomema bango na esika oyo naponaki mpo na kovandisa Kombo na Ngai. ›
Na tango wana, Yawe akotuta ble wuta na ngambo ya ebale (Efrate) kino na mayi oyo etiolaka makasi na bangomba ya Ejipito. Boye, bino bana ya Isalaele, Yawe akolokota bino moko na moko mpo na kosangisa bino.
nakoloba epai ya nor : ‹ Pesa, › mpe epai ya sude : ‹ Kokanga te. › Zongisa bana na Ngai ya mibali wuta na mikili ya mosika, mpe bana na Ngai ya basi wuta na suka ya mabele,
Bobima na Babiloni, bokima wuta na bato ya Babiloni ! Boloba yango na makelele ya esengo mpe botatola yango ; bopanza sango na yango kino na suka ya mokili ; boloba : ‹ Yawe asikoli Jakobi, mosali na Ye. › »
Tala makambo oyo Yawe atatoli kino na basuka ya mabele : « Boloba na Siona, mboka kitoko : ‹ Tala, Mobikisi na yo azali koya ! Tala, lifuti na ye ezali elongo na ye, mpe azali kotambola elongo na litomba na ye. › »
Tala, nakozongisa bango wuta na mokili ya nor mpe nakosangisa bango wuta na basuka ya mokili. Kati na bango, ekozala na bakufi miso mpe bakakatani, basi ya zemi mpe basi oyo bazali na pasi ya kobota ; bato ebele penza bakozonga.
Na bisika nyonso oyo nakopanza bango, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, bato nyonso oyo bakotikala na bomoi kati na ekolo oyo ya mabe bakoluka kufa na esika ya bomoi. ›
Mpe na lokito monene ya kelelo, akotinda ba-anjelu na Ye kosangisa baponami na Ye longwa na bangambo nyonso minei ya mokili : longwa na suka moko ya Likolo kino na suka mosusu.
Boye, Yawe akopanza bino kati na bikolo nyonso ya mokili mobimba. Kuna bokogumbamela banzambe mosusu : banzambe ya nzete mpe ya mabanga oyo bino mpe bakoko na bino boyebaki te.