3 Yawe, Nzambe na yo, akoyokela yo mawa : akozongisa bato na yo, oyo bakendeki na bowumbu mpe akosangisa bino lisusu wuta na bikolo nyonso epai wapi apanzaki bino.
Nazali elongo na yo, nakobatela yo bisika nyonso oyo okokende mpe nakozongisa yo na mabele oyo, nakotika yo te kino nakokokisa makambo nyonso oyo nalakaki yo. »
Boganga : « Oh Nzambe Mobikisi na biso, bikisa biso, sangisa biso mpe kangola biso wuta na maboko ya bokonzi ya bikolo mosusu, mpo ete tosanzola Kombo na Yo ya bule mpe tosepela na mosala ya kokumisa Yo ! »
Kasi soki bozongeli Ngai mpe botosi mibeko na Ngai, wana, ezala soki bato na bino bakenda mosika na bowumbu kino na suka ya mokili, nakosangisa bango wuta kuna mpe nakomema bango na esika oyo naponaki mpo na kovandisa Kombo na Ngai. ›
Na tango wana, Yawe akotuta ble wuta na ngambo ya ebale (Efrate) kino na mayi oyo etiolaka makasi na bangomba ya Ejipito. Boye, bino bana ya Isalaele, Yawe akolokota bino moko na moko mpo na kosangisa bino.
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakobengana bato mabe oyo bavandaka zingazinga ya ekolo na Ngai, oyo bazali kobundisa libula oyo napesaki bato na Ngai, Isalaele, mpe nakolongola ekolo ya Yuda kati na bango.
Nakomimonisa epai na bino, » elobi Yawe, « mpe nakozongisa bino longwa na bowumbu. Nakosangisa bino longwa na bikolo nyonso mpe na bisika nyonso epai wapi nabenganaki bino, » elobi Yawe, « nakozongisa bino na esika oyo namemelaki bino na bowumbu. »
Oh bino bikolo, boyoka Liloba na Yawe, botatola yango na bisanga ya mosika ! Boloba : ‹ Ye oyo apanzaki Isalaele akosangisa bango mpe akobatela bango ndenge mobateli bibwele abatelaka etonga na ye.
Mpo na yango, loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakosangisa bino wuta na bikolo, nakozongisa bino wuta na mikili epai wapi napanzaki bino mpe nakozongisela bino lisusu mokili ya Isalaele. ›
Boye, bakoyeba solo ete nazali Yawe, Nzambe na bango ; pamba te atako natindaki bango na bowumbu kati na bikolo, nasangisi bango lisusu na mabele na bango moko mpe nakotika ata moto moko te kati na bango kuna.
Ata soki napanzi bango kati na bikolo ya bapaya, ezala na mokili oyo eleki mosika, bakokanisa Ngai kaka. Bango elongo na bana na bango ya mibali bakobika mpe bakozonga na mokili na bango.
Mpe soki bato ya Isalaele bawumeli te kati na kozanga na bango kondima, bakokangisa bango lisusu na nzete, pamba te Nzambe azali na makoki ya kokangisa bango lisusu na nzete.