Deteronomi 30:2 - Mokanda na Bomoi2 soki ozongi epai na Yawe, Nzambe na yo ; soki yo mpe bana na yo botosi Ye, na mitema mpe na milimo na bino mobimba, na makambo nyonso oyo natindi yo lelo, အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bongo, kati na bikolo nyonso epai wapi bakokende na bowumbu, bato oyo bakobika bakokanisa ngai tango nakobuka lolendo ya mitema na bango, oyo etonda na posa ya kosalela banzambe mosusu mpe nakobebisa miso na bango, oyo eboyaka kotala Ngai mpo na kotala banzambe na bango ya bikeko. Bango moko bakoyoka nkele mpo na mabe oyo basalaki mpe mpo na misala na bango nyonso ya mbindo.
Nakosopa Molimo ya ngolu mpe ya mabondeli epai ya libota ya Davidi mpe epai ya bavandi ya Yelusalemi. Bakosembola miso na bango epai na Ngai oyo batobolaki. Bakosalela ye matanga ndenge kaka basalaka matanga ya mwana oyo abotama kaka ye moko ; bakolela ye makasi ndenge balelaka mwana mobali ya liboso oyo asili kokufa.