Basi yango bawutaki na bikolo oyo, na tina na bango, Yawe alobaki na bana ya Isalaele : « Bosengeli te kobalana na bango, noki te bakopengwisa bino mpe bakotindika mitema na bino na kosambela banzambe na bango. » Nzokande, Salomo akangamaki na basi ya bikolo ya bapaya na bolingo makasi.
Tala likambo oyo Ngai natindi yo lelo : linga Yawe, Nzambe na yo, tambola na banzela na Ye mpe batela mitindo na Ye, bikateli na Ye mpe mibeko na Ye. Bongo okozala na bomoi, mpe bokokoma ebele ; mpe Yawe, Nzambe na yo, akopambola yo kati na mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa.
nalobi na yo, na mokolo ya lelo, ete okobebisama solo, okowumela lisusu te kati na mokili oyo ezali na ngambo mosusu ya Yordani, epai wapi bokokota mpo na kozwa.
Bosala penza keba ete boboya te koyoka Ye oyo alobaka ! Pamba te soki bato wana bazangaki te kozwa etumbu tango baboyaki koyoka Ye oyo azalaki kokebisa bango awa na mokili, ekozala ndenge nini mpo na biso soki toboyi koyoka Ye oyo akebisaka biso wuta na Likolo ?
Bopengwa te na kolanda banzambe na bino ya bikeko, oyo ezanga na yango tina, oyo ekoki kosalela bino ata bolamu moko te, oyo ekoki te kobikisa bino, pamba te ezali banzambe ezanga tina.