Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 30:15 - Mokanda na Bomoi

15 Tala, nasili kotia lelo, liboso na yo, bomoi mpe bolamu, kufa mpe mabe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 30:15
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

kasi okolia te mbuma ya nzete ya koyeba malamu mpe mabe ; pamba te mokolo oyo okolia yango, okokufa solo. »


Bomoi ezalaka kati na nzela ya bosembo, mpe kufa ezalaka te kati na nzela ya bosembo.


Soki bozwi mokano ya kotosa Ngai, bokolia mbuma kitoko ya mokili.


Mpe lisusu, loba na bato : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Botala, nasili kotia liboso na bino nzela ya bomoi mpe nzela ya kufa.


Na mokolo kaka ya lelo, nayebisi bino yango, kasi boboyi lisusu kotosa Yawe, Nzambe na bino, na nyonso oyo atindi ngai koyebisa bino.


Oh moto, bateyaki yo makambo oyo ezali malamu. Mpe tala makambo oyo Yawe azali kosenga epai na yo : Tambola na bosembo, linga boboto mpe tambola elongo na Nzambe na yo na komikitisa.


Moto oyo akondima mpe akozwa libatisi akobika, kasi moto oyo akondima te akozwa etumbu.


Pamba te Nzambe alingaki mokili mingi penza, yango wana apesaki Mwana na Ye se moko, mpo ete moto nyonso oyo akondima Ye akufa te kasi azwa bomoi ya seko.


Pamba te, kati na Yesu-Klisto, likambo ya tina ezali : kozala na kondima oyo esalaka na nzela ya bolingo ; ezali te : kokatama ngenga to kokatama ngenga te.


Tala, natie lelo liboso na bino mapamboli mpe bilakeli mabe.


Maloba oyo nawuti koloba, mapamboli mpe bilakeli mabe oyo napesi yo mpo ete opona, ekokokisama. Soki obateli yango malamu na motema na yo kati na bikolo nyonso epai wapi Yawe, Nzambe na yo, akobengana yo ;


Te, liloba yango ezali pene na yo, ezali kati na monoko na yo mpe kati na motema na yo, mpo ete okoka kotosa yango.


Na mokolo ya lelo, nazwi likolo mpe se lokola batatoli mpo na yo : nasili kotia liboso na yo bomoi mpe kufa, mapamboli mpe bilakeli mabe. Sik’oyo, pona bomoi mpo ete yo mpe bana na yo bozala na bomoi.


Ezali maloba ya pamba te epai na bino, kasi ezali nde bomoi na bino. Ezali na nzela na yango nde bokozala na bomoi molayi kati na mokili oyo bokozwa sima na kokatisa Yordani. »


Mpe tala mobeko oyo apesa biso : kondima Yesu-Klisto, Mwana na Ye, mpe kolingana biso na biso, ndenge atindaki biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ