Nalobaki na nkuku te, kati na esika moko te ya molili ya mokili ; nalobaki te na bakitani ya Jakobi : ‹ Boluka Ngai kati na pamba ! › Nazali Yawe, nalobaka oyo ezali sembo, nasakolaka oyo ezali alima.
soki botosi Yawe, Nzambe na bino, mpe bobateli mitindo mpe bikateli na Ye, oyo ekomama kati na buku oyo ya Mobeko, mpe soki bozongi epai na Yawe, Nzambe na bino, na mitema mpe na milimo na bino mobimba.