4 Na tango wana, tobotolaki bingumba na ye nyonso, totikaki ata engumba moko te kati na bingumba tuku motoba na etando ya Arigobi kati na mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani.
Beni-Geberi : azalaki kovanda na Ramoti kati na Galadi mpe azalaki moyangeli ya bamboka ya Yairi, mwana mobali ya Manase, kati na Galadi, mpe ya Arigobi kati na Bashani oyo ezalaki na bingumba tuku motoba oyo batonga makasi mpe bikangelo bikuke ya bamir na yango ezalaki ya bibende ya bronze.
Boye, bana ya Isalaele babomaki ye elongo na bana na ye ya mibali mpe mampinga na ye nyonso ; batikaki ata moto moko te na bomoi, mpe bakamataki mokili na ye.
Ndambo oyo etikalaki na Galadi mpe nyonso mosusu ya Bashani, mokili ya Ogi, napesaki yango na ndambo ya libota ya Manase : Mokili nyonso ya Arigobi, oyo ezali na Bashani, eyebanaki lokola mokili ya bato ya Refayimi.
Yairi, mokitani ya Manase, abotolaki etuka nyonso ya Arigobi kino na mondelo ya bato ya Geshuri mpe ya bato ya Maakati. Apesaki bamboka yango kombo na ye. Yango wana kino lelo babengaka Bashani bamboka ya Yairi.
Boye Yawe, Nzambe na biso, akabaki lisusu Ogi, mokonzi ya Bashani, mpe mampinga na ye nyonso, na maboko na biso ; mpe tobomaki bango, totikaki ata moto moko te.
Bingumba wana nyonso ezalaki ya kotongama makasi mpe ezalaki na bamir ya milayi mpe na bikuke oyo bakangaka na bibende mpe ezalaki lisusu na bamboka ebele oyo ezanga bamir.