3 Boye Yawe, Nzambe na biso, akabaki lisusu Ogi, mokonzi ya Bashani, mpe mampinga na ye nyonso, na maboko na biso ; mpe tobomaki bango, totikaki ata moto moko te.
Boye, bana ya Isalaele babomaki ye elongo na bana na ye ya mibali mpe mampinga na ye nyonso ; batikaki ata moto moko te na bomoi, mpe bakamataki mokili na ye.
Yawe alobaki na ngai : « Kobanga ye te, pamba te nakabi ye na maboko na yo elongo na mampinga na ye nyonso mpe mokili na ye ; sala ye ndenge osalaki Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki kovanda na Eshiboni. »
Na tango wana, tobotolaki bingumba na ye nyonso, totikaki ata engumba moko te kati na bingumba tuku motoba na etando ya Arigobi kati na mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani.
Bashani mobimba, mokili ya Ogi, lokola moko kati na bato ya suka ya Refayimi oyo azalaki kokonza na Ashitaroti mpe na Edreyi, ezalaki mpe kati na libula na bango. Moyize alongaki bango mpe abotolaki bango mokili na bango.
Mabele oyo ezwamaki wuta na Maanayimi, bakisa mokili mobimba ya Bashani, mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani, mpe bamboka mike-mike nyonso ya Yairi oyo ezalaka na Bashani, bingumba tuku motoba,