Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 3:21 - Mokanda na Bomoi

21 Na tango wana, nalobaki na Jozue : « Omonaki yo moko makambo oyo Yawe, Nzambe na bino, asalaki epai na bakonzi oyo mibale ; akosala kaka ndenge moko na bikolo nyonso epai wapi bokoleka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 3:21
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe azali ebombamelo mpo na bato oyo bazali konyokolama, mpe ndako makasi mpo na tango ya pasi.


Ye nde akangolaki biso na makama ya kufa ya lolenge wana, mpe akokangola biso lisusu. Solo, tozali na elikya kati na Ye ete akokangola biso lisusu,


Yango wana, na likambo oyo etali Klisto, ezala kati na bolembu, na kofingama, na kozanga, na minyoko to mpe na pasi oyo nakutanaka na yango, nasepelaka na ngai kaka ; pamba te ezali na tango oyo nazalaka na bolembu nde natondaka na makasi.


Epai na Ye oyo azali na makoki ya kosala koleka nyonso oyo tokoki kosenga to kokanisa, kolanda nguya na Ye, oyo esalaka kati na biso,


kino tango Yawe akopesa bopemi epai ya bandeko na bino ndenge asalaki mpo na bino, mpe kino bango lisusu bakozwa mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bango na ngambo mosusu ya Yordani. Sima na yango, bokozonga, moko na moko, na mabele oyo napesaki bino. »


Bobanga bango te, pamba te Yawe, Nzambe na bino, Ye moko akobundela bino. »


Omonaki na miso na yo komekama makasi, bilembo ya kokamwa mpe bikamwa, loboko ya nguya mpe loboko esembolama oyo na nzela na yango Yawe, Nzambe na yo, abimisaki yo na Ejipito. Yawe, Nzambe na yo, akosala ndenge moko epai ya bato oyo ozali kobanga.


Jozue alobaki na bango : « Bobanga te mpe bolemba nzoto te. Bozala makasi mpe boyika mpiko, pamba te ezali boye nde Yawe akosala banguna nyonso oyo bokobundisa. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ