Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 3:18 - Mokanda na Bomoi

18 Na tango wana, napesaki bino mitindo oyo : « Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino mokili oyo mpo ete bokamata yango. Kasi bato na bino nyonso oyo bazali na makoki ya kobunda balata bibundeli mpe baleka liboso ya bandeko na bino bana ya Isalaele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 3:18
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Alobaki na ye lisusu : — Nazali Yawe oyo nabimisaki yo wuta na Uri, mokili ya bato ya Chalide, mpo na kopesa yo mokili oyo.


Akabaki mabele na bango lokola libula ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !


Bokobotola mokili yango mpe bokokoma kovanda kuna, pamba te napesi bino mokili yango mpo ete bobotola yango.


Tala bikateli mpe mibeko oyo bosengeli kosalela malamu kati na mokili oyo Yawe, Nzambe ya bakoko na bino, azali kopesa bino mpo na kozwa, na tango nyonso oyo bokowumela kati na mokili yango.


Nzokande, ebongaki te ete mobola azala kati na bino ; pamba te kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo ete bokamata yango lokola libula, akopambola bino koleka,


Okoki te kopusa mondelo ya moninga na yo, mondelo oyo bato oyo bayaki liboso na yo na mabele na yo bakataki kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo ete bokamata yango.


bokotia pembeni mpo na bino, bingumba misato oyo ezali na kati-kati ya mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo na kozwa.


Yango wana, napesi bino mitindo ete botia pembeni bingumba misato mpo na bino.


Soki kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo na kozwa, bakuti moto akufa alali na elanga, bongo moto oyo abomaki ye ayebani te,


Tango Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino bopemi liboso ya banguna nyonso oyo bazingeli bino kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo na kozwa lokola libula, bosengeli koboma bato ya Amaleki mpo ete botikala lisusu te kokanisa bango kati na mokili. Bobosana te kosala likambo yango.


Kasi yo, vanda awa elongo na Ngai mpo ete napesa yo mibeko nyonso, bikateli nyonso, mpe mitindo nyonso oyo okoteya bango mpo ete basalela yango kati na mokili oyo nakopesa bango lokola libula. »


Tala mibeko, bikateli mpe malako oyo Yawe, Nzambe na bino, atindi ngai koteya bino mpo ete bosalela yango kati na mokili oyo bokokota mpo na kokamata yango,


Boye sosola malamu ete ezali te mpo na bosembo na yo nde Yawe, Nzambe na yo, azali kopesa yo mokili oyo ya malamu mpo ete okamata yango, pamba te yo mpe ozali libota ya batomboki.


« Botambola kati na molako mpe boloba na bato : ‹ Bobongisa bilei na bino, pamba te sima na mikolo misato, bokokatisa ebale Yordani na esika oyo mpo na kokende kobotola mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, asili kopesa bino. › »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ