Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 3:14 - Mokanda na Bomoi

14 Yairi, mokitani ya Manase, abotolaki etuka nyonso ya Arigobi kino na mondelo ya bato ya Geshuri mpe ya bato ya Maakati. Apesaki bamboka yango kombo na ye. Yango wana kino lelo babengaka Bashani bamboka ya Yairi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 3:14
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bato ya Amoni basosolaki ete bamikomisi bato mabe na miso ya Davidi, bakotisaki bato ya sika na mosala ya soda, oyo bakobanda kobunda bitumba na makolo : epai ya bato ya Siri ya Beti-Reobi mpe ya Tsoba, bato nkoto tuku mibale ; epai ya mokonzi ya Maaka, bato nkoto moko ; epai ya mokonzi ya Tobi, bato nkoto zomi na mibale.


Abisalomi akimaki mpe akendeki epai ya Talimayi, mwana mobali ya Amiwudi, mokonzi ya Geshuri. Kasi mokonzi Davidi asalaki mikolo nyonso matanga mpo na mwana na ye ya mobali.


Bongo Joabi akendeki na Geshuri mpe azongisaki Abisalomi, na Yelusalemi.


mpe Ira, moto ya Yairi, azalaki Nganga-Nzambe ya Davidi.


Elifeleti, mwana mobali ya Aasibayi, mwana mobali ya Maakati ; Eliami, mwana mobali ya Ayitofeli, moto ya Gilo ;


ya mibale, Kileabi oyo Abigayili oyo akufisaki mobali na ye ya liboso, Nabali, moto ya Karimeli, abotelaki ye ; ya misato, Abisalomi oyo Maaka, mwana ya Talimayi, mokonzi ya Geshuri, abotelaki ye ;


Solo, tomonaka bato ya bwanya kokufa elongo na zoba mpe moto oyo azangi mayele, mpe batikaka bomengo na bango epai ya bato mosusu.


bakendeki na Mitsipa epai ya Gedalia. Tala bakombo ya bato yango : Isimaeli, mwana mobali ya Netania ; Yoanani mpe Jonatan, bana mibali ya Karea ; Seraya, mwana mobali ya Tanumeti ; bana mibali ya Efayi, moto ya Netofa ; mpe Yezania, mwana mobali ya moto moko ya Maakati ; bakendeki kuna elongo na basoda na bango.


Yairi, moko kati na bakitani ya Manase, abotolaki bamboka na yango ya mike mpe abengaki yango Avoti Yairi.


Ndambo oyo etikalaki na Galadi mpe nyonso mosusu ya Bashani, mokili ya Ogi, napesaki yango na ndambo ya libota ya Manase : Mokili nyonso ya Arigobi, oyo ezali na Bashani, eyebanaki lokola mokili ya bato ya Refayimi.


Na tango wana, tobotolaki bingumba na ye nyonso, totikaki ata engumba moko te kati na bingumba tuku motoba na etando ya Arigobi kati na mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani.


Azalaki kokonza na ngomba Erimoni, na Salika mpe na Bashani mobimba kino na bandelo ya bato ya Geshuri mpe ya bato ya Maakati, mpe kino na ndambo ya mokili ya Galadi oyo ezalaki na mondelo ya mokili ya Sikoni, mokonzi na Eshiboni.


Kasi bana ya Isalaele babenganaki te bato ya Geshuri mpe ya Maakati ; yango wana bakobaki kovanda elongo na bana ya Isalaele kino na mokolo ya lelo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ