Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 3:1 - Mokanda na Bomoi

1 Sima, tobalukaki mpe tokendeki na nzela ya Bashani. Bongo Ogi, mokonzi ya Bashani, elongo na mampinga na ye nyonso babimaki mpo na kokutana na biso mpe babundisaki biso na Edreyi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 3:1
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Geberi, mwana mobali ya Uri : moyangeli ya Galadi (mokili ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori ; mpe mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani). Mpe na likolo ya bayangeli nyonso, ezalaki na moyangeli moko oyo azalaki kokamba bango.


Okabaki mikili mpe bikolo na maboko na bango mpo ete bazwa bituka na bango kino na bandelo na yango. Babotolaki mokili ya Sikoni, mokonzi ya Eshiboni, mpe mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani.


mpe Ogi, mokonzi ya Bashani ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !


Makambo yango esalemaki sima na Moyize kolonga Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki koyangela wuta na Eshiboni, mpe sima na ye kolonga Ogi, mokonzi ya Bashani, oyo azalaki kovanda na Ashitaroti mpe na Edreyi.


Tango Sikoni elongo na mampinga na ye nyonso babimaki mpo na kobundisa biso na Yakatsi,


Tozwaki mokili na bango mpe topesaki yango lokola libula epai ya bato ya libota ya Ribeni, ya Gadi mpe epai ya ndambo ya libota ya Manase.


Yawe alobaki na ngai : « Kobanga ye te, pamba te nakabi ye na maboko na yo elongo na mampinga na ye nyonso mpe mokili na ye ; sala ye ndenge osalaki Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki kovanda na Eshiboni. »


Yawe akobebisa bango ndenge kaka asalaki Sikoni mpe Ogi, bakonzi ya bato ya Amori, oyo abebisaki elongo na bamboka na bango.


Bazwaki mokili na ye mpe mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani. Bakonzi nyonso mibale bazalaki bato ya Amori mpe bakonzaki na ngambo ya este ya Yordani.


Tala bakonzi ya mokili, oyo bana ya Isalaele balongaki mpe oyo babotolaki mokili na bango na ngambo ya este ya Yordani, wuta na moluka ya Arinoni kino na ngomba Erimoni, elongo na ngambo nyonso ya este ya Araba :


Ogi, mokonzi ya Bashani, moko kati na bakitani ya suka ya Refayimi, oyo azalaki kovanda na Ashitaroti mpe na Edreyi.


Mabele oyo ezwamaki wuta na Maanayimi, bakisa mokili mobimba ya Bashani, mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani, mpe bamboka mike-mike nyonso ya Yairi oyo ezalaka na Bashani, bingumba tuku motoba,


mpe epai ya bakonzi mibale ya bato ya Amori oyo bazalaki na ngambo ya este ya Yordani : Sikoni, mokonzi ya Eshiboni, mpe Ogi, mokonzi ya Bashani, oyo azalaki kovanda na Ashitaroti.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ