Sala makambo oyo Yawe, Nzambe na yo, alingaka : tambola na banzela na Ye, batela malako mpe bikateli na Ye, mibeko mpe mitindo na Ye, ndenge ekomama kati na Mobeko ya Moyize, mpo ete olonga na makambo nyonso oyo okosala mpe na bisika nyonso oyo okokende ;
Tokokatisa na ngambo mosusu liboso ya Yawe kino na mokili ya Kanana mpo na bitumba. Kasi mabele oyo biso tosengeli kozwa lokola libula ekozala na ngambo oyo ya Yordani.
Boye, Moyize apesaki epai ya bakitani ya Gadi, ya Ribeni mpe ya ndambo ya libota ya Manase, mwana mobali ya Jozefi mokili ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori mpe mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani : mokili mobimba elongo na bingumba na yango mpe mboka mike oyo ezingelaki yango.
Botambola na banzela nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, atindaki bino mpo ete bozala na bomoi, mpo ete bozala bato ya esengo, mpe mpo ete bobakisa mikolo ya bomoi na bino kati na mokili oyo bokokamata.
Kasi zala makasi mpe yika mpiko, sala keba ete otosa mibeko nyonso oyo Moyize, mowumbu na Ngai, apesaki yo ; komeka te kobima libanda na yango, ezala na ngambo ya loboko ya mobali to na ngambo ya loboko ya mwasi, mpo ete okoka kolonga na makambo nyonso oyo okosala.
Sala ete maloba ya buku oyo ya Mobeko ewumela tango nyonso na monoko na yo ; tangaka mpe kanisaka yango butu mpe moyi, mpo ete osala kolanda nyonso oyo ekomami kati na yango. Na bongo nde okokende liboso mpe okolonga kati na misala na yo nyonso.