Yawe alobaki : « Botelema, bokende mpe bokatisa lubwaku ya Arinoni. Nakabi na maboko na bino, Sikoni, moto ya Amori mpe mokonzi na Eshiboni, elongo na mokili na ye. Bobanda kobundisa yango mpe bokamata yango.
Na tango wana, tobotolaki mokili yango. Napesaki epai ya bato ya libota ya Ribeni mpe ya libota ya Gadi mokili oyo ezalaki wuta na Aroeri, kati na lubwaku ya Arinoni kino ndambo ya etuka ya bangomba ya Galadi mpe bingumba na yango.
Ndambo oyo etikalaki na Galadi mpe nyonso mosusu ya Bashani, mokili ya Ogi, napesaki yango na ndambo ya libota ya Manase : Mokili nyonso ya Arigobi, oyo ezali na Bashani, eyebanaki lokola mokili ya bato ya Refayimi.