Tango bazalaki na nzala, opesaki bango bilei wuta na likolo ; mpe tango bazalaki na posa ya mayi, obimiselaki bango mayi wuta na libanga. Olobaki na bango ete bakende kobotola mokili oyo, na nzela ya ndayi, olakaki kopesa bango.
— Nayoki koyimayima ya bana ya Isalaele. Yebisa bango : « Na pokwa ya lelo, bokolia misuni ; bongo na tongo, bokotonda mana. Boye, bokoyeba solo ete nazali Yawe, Nzambe na bino. »
Te, okotisi biso kutu te na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi to opesi biso ata libula moko te ya bilanga to ya bilanga ya vino. Boni, okanisi ete bato oyo bakufa miso ? Te, tokoya te !
« Zwa lingenda na yo ; bongo elongo na Aron, ndeko na yo ya mobali, bosangisa lisanga mobimba esika moko. Boloba na libanga wana na miso na bango, mpe ekobimisa mayi wuta na yango. Okobimisa mayi na libanga mpo ete bato ya lisanga mobimba bakoka komela elongo na bibwele na bango. »
Boye Yawe, Nzambe na biso, akabaki lisusu Ogi, mokonzi ya Bashani, mpe mampinga na ye nyonso, na maboko na biso ; mpe tobomaki bango, totikaki ata moto moko te.
Abukaki lolendo na yo, abomaki yo nzala mpe aleisaki yo mana oyo yo mpe batata na yo botikalaki koyeba te, mpo na koteya yo ete moto abikaka kaka na lipa te, kasi mpe na maloba nyonso oyo ebimaka na monoko ya Yawe.