Nakozwa bino lokola bato na Ngai moko, bongo nakozala Nzambe na bino. Boye bokoyeba ete Ngai Yawe, nazali Nzambe na bino, oyo akangolaki bino na se ya misala makasi ya bato ya Ejipito.
Bana na bino bakokoma babateli bibwele awa na esobe mibu tuku minei. Lokola botamboli na bosembo te na miso na Ngai, bakomona pasi kino ebembe na bino ya suka elala na esobe.
Na mokolo ya liboso ya sanza ya zomi na moko, na mobu ya minei, Moyize alobaki na bana ya Isalaele makambo nyonso oyo Yawe atindaki ye na tina na bango.
Kobosanaka te ndenge Yawe, Nzambe na yo, akambaki yo na mobembo nyonso kati na esobe mibu tuku minei, mpe ndenge abukaki lolendo na yo mpe amekaki yo mpo na koyeba mozindo ya motema na yo mpe kotala soki okotosa mibeko na Ye to te.
Abukaki lolendo na yo, abomaki yo nzala mpe aleisaki yo mana oyo yo mpe batata na yo botikalaki koyeba te, mpo na koteya yo ete moto abikaka kaka na lipa te, kasi mpe na maloba nyonso oyo ebimaka na monoko ya Yawe.