27 Yawe apikolaki bango na mokili na bango na kanda na Ye ya makasi mpe na kotomboka na Ye ya makasi. Abwakaki bango na mokili mosusu ndenge ezali komonana lelo. ›
Yawe akobeta Isalaele, mpe Isalaele akoningana lokola nzete oyo ebotaka na mayi, oyo mayi ezali koningisa ; akopikola Isalaele wuta na mabele ya malamu oyo apesaki na bakoko na ye mpe akopanza bango mosika ya ebale Efrate, pamba te balamusi kanda ya Yawe na kosalaka makonzi ya bule mpo na Ashera.
Tango Oze akokisaki mibu libwa na bokonzi, mokonzi ya Asiri abotolaki Samari mpe amemaki bana ya Isalaele na bowumbu na Asiri. Atiaki bango na Ala mpe na bapembeni ya ebale ya Abori, na etuka ya Gozani mpe na bingumba ya Medi.
« Tala liloba oyo Yawe alobi : Nakobengisa pasi makasi na esika oyo mpe na bavandi na yango kolanda makambo nyonso oyo ekomama kati na buku oyo mokonzi ya Yuda awuti kotanga.
Ezalaki mpo na kanda makasi ya Yawe nde makambo oyo nyonso esalemelaki Yelusalemi mpe Yuda, kino Yawe kobengana bango mosika ya elongi na Ye. Nzokande, Sedesiasi atombokelaki mokonzi ya Babiloni.
Tango bato bakotuna : ‹ Mpo na nini Yawe, Nzambe na biso, asali biso makambo ya boye ? › Bokozongisela bango : ‹ Ezali mpo ete bosundolaki Ngai mpe bosambelaki banzambe ya bapaya kati na mboka na bino. Yango wana, bokosalela bapaya kati na mboka oyo ezali ya bino te. ›
Maloba oyo nawuti koloba, mapamboli mpe bilakeli mabe oyo napesi yo mpo ete opona, ekokokisama. Soki obateli yango malamu na motema na yo kati na bikolo nyonso epai wapi Yawe, Nzambe na yo, akobengana yo ;