Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 29:23 - Mokanda na Bomoi

23 Bikolo nyonso ekotuna : ‹ Mpo na nini Yawe asali likambo ya boye na mokili oyo ? Mpo na nini kanda makasi boye ? ›

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 29:23
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

bakendeki kobundisa Bera, mokonzi ya Sodome ; Birisha, mokonzi ya Gomore ; Shineabi, mokonzi ya Adima ; Shemeberi, mokonzi ya Tseboyimi mpe mokonzi ya Bela oyo elakisi Tsoari.


Atako Tempelo oyo ezali sik’oyo kitoko penza, kasi bato nyonso oyo bakoleka pembeni na yango bakokamwa mpe bakoloba : ‹ Mpo na nini Yawe asali makambo ya boye na mokili oyo mpe na Tempelo oyo ? ›


Bakoyanola : ‹ Ezali mpo ete basundolaki Yawe, Nzambe ya batata na bango, oyo abimisaki bango na Ejipito mpe bamipesaki na banzambe mosusu, bafukamelaki mpe basalelaki yango ; yango wana Yawe ayeisi likolo na bango pasi oyo nyonso. › »


— Bokende kotuna toli ya Yawe mpo na ngai, mpo na bato mpe mpo na Yuda mobimba, na tina na makambo oyo ekomama kati na buku oyo ewuti komonana. Pamba te kanda ya Yawe, oyo epeleli biso ezali makasi mpo ete batata na biso batosaki te maloba ya buku yango mpe basalaki te kolanda nyonso oyo ekomama kati na yango.


Ndako na ye etikalaka na eloko moko te, mpe fofolo ezalaka ya kopanzana kati na ndako yango.


kobongola mabele oyo ebotaka bambuma mabele ya mungwa likolo ya mabe ya bavandi na yango.


Mokili na bino ebebisami, bingumba na bino esili kozika na moto ; bapaya bazali kobebisa bilanga na bino na miso na bino, nyonso ebebisami solo, lokola tango bapanzaka yango na moto ya mobulu.


Nzambe akokweyisa Babiloni, kongenga ya babokonzi, nkembo ya lolendo ya bato ya Chalide, ndenge akweyisaki Sodome mpe Gomore.


Miluka ya Edomi ekobongwana gudron, putulu na yango, lokola moto ya fofolo mpe mabele na yango ekokoma kopela moto ;


Oh Yawe, sima na makambo oyo nyonso, okozongisa kaka motema na Yo sima te ? Okokanga kaka monoko mpe okopesa biso kaka etumbu oyo eleki ndelo ?


Akozala lokola mwa nzete ekawuka kati na esobe ; akomona bolamu te tango ekoya, akovanda na bisika ya kokawuka ya esobe, na mokili ya mungwa epai wapi bato bazalaka te.


Tika ete moto yango akoma lokola bingumba oyo Yawe abuki na mawa te ! Tika ete ayoka bileli na tongo mpe makelele ya bitumba na midi.


Ndenge Sodome mpe Gomore ebebisamaki elongo na bingumba na yango ya zingazinga, » elobi Yawe, « moto moko te akovanda lisusu kuna, moko te akowumela kati na yango.


Nani azali penza na bwanya mpo na kososola makambo ya boye ? Nani Yawe ateyaki mpo ete alimbola yango ? Mpo na nini mokili ebebisami, etikali pamba lokola esobe epai wapi moto alekaka te ? »


Kasi mayi oyo etikalaka tango ebale monene etondaka mpe mayi ya bisanga ekokoma peto te, ekotikala kaka bongo mpe ekotonda na mungwa kati na yango.


Ngai moko nakokotisa mobulu kati na mokili, mpe ezala banguna na bino oyo bakoya kovanda kati na yango bakokamwa.


« Nabebisaki bino ndenge nabebisaki Sodome mpe Gomore ; bozalaki lokola koni ya moto oyo babimisi na moto. Kasi atako bongo, bozongelaki Ngai te, » elobi Yawe.


Yango wana, na Kombo na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, « Moabi ekokoma penza lokola Sodome, mpe bato ya Amoni bakokoma lokola Gomore ; ekokoma esika oyo ebotaka matiti mabe, esika ya mabulu ya mungwa, esika ebebisama mpo na libela. Batikali na Ngai bakobotola bango bomengo na makasi, mpe batikali ya ekolo na Ngai bakozwa mikili yango lokola libula. »


Kasi na mokolo oyo Loti abimaki wuta na Sodome, mvula ya moto mpe ya fofolo ekitaki wuta na likolo mpe ebomaki bango nyonso.


Ezali ndenge kaka Ezayi amisakolelaki : « Soki Nkolo, Mokonzi ya mampinga, atikelaki biso bakitani te, tolingaki kokoma lokola engumba Sodome, tolingaki kokokana na engumba Gomore. »


Ndenge moko mpe mpo na bato ya Sodome, ya Gomore mpe ya bingumba ya pembeni : basalaki ndenge moko na ba-anjelu, bamipesaki na pite mpe bazalaki kosangisa nzoto na ndenge oyo esengeli te. Bazali ndakisa mpo na bato oyo bazali komona pasi ya etumbu ya moto ya seko na seko.


Kasi nyama ekangamaki elongo na mosakoli ya lokuta oyo azalaki kosala bikamwa na kombo ya nyama. Na nzela ya bikamwa yango, akosaki bato oyo batiamaki elembo ya nyama mpe bagumbamelaki ekeko na yango. Bango mibale : nyama mpe mosakoli ya lokuta, babwakamaki ya bomoi kati na liziba ya moto mpe ya sofolo.


Abimeleki abundisaki engumba mokolo mobimba, abotolaki engumba yango mpe abomaki bato oyo bazalaki kuna. Bongo abebisaki engumba mpe asopelaki yango mungwa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ