Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 29:22 - Mokanda na Bomoi

22 Mokili mobimba ekopela na moto ya sofolo mpe ekotonda na mungwa. Bakolona ata eloko moko te, eloko moko te ekobima mpe matiti ekobota te. Mokili yango ekobebisama ndenge Sodome mpe Gomore, Adima mpe Tseboyimi, ebebisamaki : bingumba oyo Yawe abebisaki na kanda na Ye ya makasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 29:22
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye wuta na likolo, Yawe anokisaki mvula ya moto makasi ya fofolo, na sodome mpe na Gomore.


Nakobebisa engumba oyo mpe nakokomisa yango eloko ya kotiola. Bato nyonso oyo bakolekela awa bakokamwa mpe bakoyoka somo wana bakomona kobeba na yango nyonso.


Tika ete moto yango akoma lokola bingumba oyo Yawe abuki na mawa te ! Tika ete ayoka bileli na tongo mpe makelele ya bitumba na midi.


« Mokili ya Edomi ekokoma eloko ya somo ; moto nyonso oyo akolekela wana akokamwa mpe akoyoka somo wana akomona kobeba na yango nyonso.


Ndenge Sodome mpe Gomore ebebisamaki elongo na bingumba na yango ya zingazinga, » elobi Yawe, « moto moko te akovanda lisusu kuna, moko te akowumela kati na yango.


Likolo ya kanda ya Yawe, bato bakovanda lisusu na Babiloni te mpo ete ekobebisama nye. Bato nyonso oyo bakoleka na Babiloni bakokamwa mpe bakozala na somo ya komona bapota na yango nyonso.


Efrayimi, ekobanda ndenge nini nasundola yo ? Isalaele, ndenge nini natika yo okende kaka boye ? Mpo na nini nasala yo makambo oyo nasalaka engumba ya Adima ? Okanisi ete Ngai nakoki penza kokomisa yo lokola engumba ya Tseboyimi ? Motema na Ngai ebaluki kati na Ngai mpe natondi na mawa makasi.


Yango wana, na Kombo na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, « Moabi ekokoma penza lokola Sodome, mpe bato ya Amoni bakokoma lokola Gomore ; ekokoma esika oyo ebotaka matiti mabe, esika ya mabulu ya mungwa, esika ebebisama mpo na libela. Batikali na Ngai bakobotola bango bomengo na makasi, mpe batikali ya ekolo na Ngai bakozwa mikili yango lokola libula. »


Kasi soki ebimisi basende mpe banzube, ezalaka lisusu na tina te, ezalaka mosika te ya kolakelama mabe, mpe esukaka na kozika na moto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ