Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 29:2 - Mokanda na Bomoi

2 Na miso na bino moko, bomonaki komekama monene, bilembo minene mpe bikamwa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 29:2
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

« Bomonaki bino moko ndenge nini nasalaki bato ya Ejipito mpe ndenge nini namemaki bino lokola na mapapu ya mpongo kino epai na Ngai.


Yawe alobaki na Moyize : — Loba na Aron ete asembola lingenda na ye mpe abeta yango na putulu ya mabele ; mpe yango ekokoma bangungi kati na mokili mobimba ya Ejipito.


Omonaki makambo ebele, kasi ozalaki na bokebi na yango te ; matoyi na yo efungwamaki, kasi oyokaki ata eloko moko te.


pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali kotambola liboso na bino mpe akobunda mpo na bino ndenge asalaki na Ejipito, na miso ya bato nyonso.


Ezali bino nde bato bomonaki na miso na bino moko makambo nyonso ya minene oyo Yawe asalaki.


Moyize abengisaki bana nyonso ya Isalaele mpe alobaki na bango : « Miso na bino emonaki makambo nyonso oyo Yawe asalaki na Ejipito epai ya Faraon, epai ya basali na ye nyonso mpe kati na mokili na ye mobimba.


Kasi kino na mokolo ya lelo, Yawe apesaki bino te mayele mpo na kososola to miso mpo na komona to matoyi mpo na koyoka.


Pamba te Yawe azali Nzambe na biso ; ezali Ye Yawe nde abimisaki biso mpe batata na biso na Ejipito, na mokili wana ya bowumbu, mpe asalaki na miso na biso bilembo minene ya kokamwa. Azalaki kobatela biso na banzela nyonso oyo tozalaki kotambola mpe kati na bikolo nyonso epai wapi tozalaki koleka.


Kasi, na ngambo na bino, botosa Yawe mpe bosalela Ye na bosembo mpe na mitema na bino mobimba ; botala malamu makambo minene oyo asalelaki bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ