Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 29:16 - Mokanda na Bomoi

16 Bomonaki kati na bango biloko na bango ya mbindo, banzambe ya bikeko basala na libaya, na libanga, na palata mpe na wolo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 29:16
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nalobaki na bango : ‘ Tika ete moto na moto alongola bililingi ya mbindo oyo ezali liboso ya miso na ye ! Bomikomisa mbindo te, na nzela ya banzambe ya bikeko ya Ejipito ! Nazali Yawe, Nzambe na bino. ’


Tango okokoma na mokili ya bato ya Amoni, komona bango lokola banguna te mpe kobundisa bango te, pamba te nakopesa yo ata eteni moko te ya mabele kati na mokili ya bakitani ya bato ya Amoni. Nasilaki kopesa yango lokola bozwi epai ya bakitani ya Loti. »


Yawe alobaki : « Botelema, bokende mpe bokatisa lubwaku ya Arinoni. Nakabi na maboko na bino, Sikoni, moto ya Amori mpe mokonzi na Eshiboni, elongo na mokili na ye. Bobanda kobundisa yango mpe bokamata yango.


Pesa mitindo oyo epai ya bato : ‹ Bokomi pembeni ya koleka mokili ya bandeko na bino, bakitani ya Ezawu oyo bavandaka na Seiri. Bakobanga bino, kasi bozala mayele.


Yawe alobaki na ngai : « Bomona bato ya Moabi lokola banguna na bino te mpe bobundisa bango te, pamba te nakopesa bino ata eloko moko te kati na mokili na bango. Nasila kopesa mokili ya Ari lokola bozwi epai ya bakitani ya Loti. »


Bino moko boyebi ndenge nini tozalaki na Ejipito mpe ndenge nini tokatisaki bamboka oyo tolekaki.


Bosala keba ete, na mokolo ya lelo, mobali moko te, mwasi moko te, etuka moko te to libota moko te epengwa na nzela ya Yawe, Nzambe na biso, mpo na kokende kogumbamela banzambe wana ya bikeko. Bosala keba ete, kati na bino, ezala na mosisa moko te oyo ekobota ngenge ya bololo ya ndenge wana.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ