Deteronomi 29:11 - Mokanda na Bomoi11 Botelemi awa mpo na kosala boyokani elongo na Yawe, Nzambe na bino ; boyokani oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kosala elongo na bino, na mokolo ya lelo, na kolapa ndayi esangana na bilakeli mabe, အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bango nyonso basanganaki elongo na bandeko na bango, bakambi kati na bana ya Isalaele. Bandimaki mpe balapaki ndayi ete bakotambola kolanda Mibeko oyo Nzambe apesaki bango na nzela ya Moyize, mosali na Ye, mpe bakotosa mitindo, malako mpe bikateli nyonso ya Yawe, Nzambe na biso ; bongo soki batosi yango te, tika ete Nzambe alakela bango mabe !
Kasi mokolo ya sambo ezali mokolo ya Saba ya Yawe, Nzambe na yo. Na mokolo wana, okosalaka mosala ata moko te, ezala yo, mwana na yo ya mobali, mwana na yo ya mwasi, mowumbu na yo ya mobali, mwasi mowumbu na yo, ngombe na yo, ane na yo, ebwele moko kati na bibwele na yo to mopaya oyo azali kati na bingumba na yo, mpo ete mosali na yo ya mobali mpe mwasi mosali na yo ya mwasi bakoka kopema ndenge yo ozali kopema.