67 Na tongo, bokoloba : « Pokwa ekokoma tango nini ? » Mpe na pokwa, bokoloba : « Tongo ekotana tango nini ? » Pamba te somo ekotonda na mitema na bino mpo na makambo nyonso oyo miso ekomona.
Motema na ngai ezali kobeta noki-noki, nakomi kolenga na somo, mwa malili ya pokwa oyo nazelaka na esengo ekomeli ngai somo makasi.
Bokobela liboma likolo ya makambo oyo miso na bino ekobanda komona.
Bokowumela na bomoi oyo ezanga elikya, oyo etonda na kobanga, butu mpe moyi, mpe bokoyeba te ndenge nini bomoi na bino ekosuka.
Yawe Nzambe akozongisa bino na bamasuwa na Ejipito, na mokili oyo nalobaki na bino ete bokomona yango lisusu te. Mpe kuna, bokomiteka bino moko epai ya banguna na bino lokola bawumbu ya mibali mpe ya basi, kasi moto moko te akosomba bino.
Na basanza wana mitano, bato bakoluka kufa, kasi bakozwa yango te ; bakolinga kokufa, kasi kufa ekokima bango.