65 Kati na bikolo wana, bokozala na kimia te, bokozala na esika te ya kopemisa matambe ya makolo na bino. Kuna Yawe akokomisa bino motema likolo-likolo, miso elemba mpe nzoto elemba.
Kasi ebenga ezwaki esika ya kotia matambe na yango te, pamba te mayi ezalaki na etando nyonso ya mokili. Boye, ezongaki na masuwa epai ya Noa. Noa abimisaki loboko, azwaki ebenga mpe akotisaki yango kati na masuwa.
Lamuka, lamuka ! Telema, Yelusalemi, yo oyo omelaki, wuta na loboko ya Yawe, kopo ya kanda na Ye ; yo oyo omelaki mpe osilisaki kino na suka kopo oyo epesaka bato kizunguzungu.
bawumbu na Ngai bakoyemba na esengo, esengo oyo ekowuta solo na mitema na bango, kasi bino bokoganga mpo na pasi ya mitema na bino mpe bokolelalela mpo na milimo na bino oyo ebukani.
Yuda akei na bowumbu, akomi konyokwama mpe kosala misala makasi ; azali kovanda kati na bikolo, azali lisusu na esika ya kopema te. Bato nyonso oyo bazali kolanda ye, bakangi ye kati na pasi makasi.
tala ndenge nakosala bino : nakokotisa kati na bino mobulu, libebi, bokono oyo ekoboma bino miso mpe ekobebisa bomoi na bino ; bokolona milona na bino na pamba mpe banguna na bino bakolia yango.
Bongo na mikili ya banguna na bino, bato oyo bakotikala na bomoi kati na bino, nakolembisa bango nzoto : bakokima ata makelele ya lokasa oyo mopepe eningisi, bakokima lokola nde bazali kokima liboso ya mopanga mpe bakobambana na mabele ata soki moto moko te azali kolanda bango.