64 Boye, Yawe akopanza bino kati na bikolo nyonso ya mokili mobimba. Kuna bokogumbamela banzambe mosusu : banzambe ya nzete mpe ya mabanga oyo bino mpe bakoko na bino boyebaki te.
Tango Oze akokisaki mibu libwa na bokonzi, mokonzi ya Asiri abotolaki Samari mpe amemaki bana ya Isalaele na bowumbu na Asiri. Atiaki bango na Ala mpe na bapembeni ya ebale ya Abori, na etuka ya Gozani mpe na bingumba ya Medi.
Yango wana, nakobwaka bino libanda ya mokili oyo mpe nakomema bino na mokili oyo, ezala bino to batata na bino, botikala koyeba te ; mpe kuna, bokosalela banzambe ya bapaya, butu mpe moyi ; pamba te nakoyokela bino mawa te. ›
Yuda akei na bowumbu, akomi konyokwama mpe kosala misala makasi ; azali kovanda kati na bikolo, azali lisusu na esika ya kopema te. Bato nyonso oyo bazali kolanda ye, bakangi ye kati na pasi makasi.
« Pamba te nakopesa mitindo mpe nakoningisa libota ya Isalaele kati na bikolo nyonso ndenge bayungolaka ble ; bongo ata mbuma moko te ya moke ekokweya na se.
Na bongo, napanzaki bango kati na bikolo nyonso epai wapi bakomaki bapaya, mpe mokili na bango ebebisamaki makasi : moto moko te akokaki lisusu kokota to kobima kuna. Ndenge wana nde bakomisaki mokili ya kitoko libebi. »
Bakoboma bango na mopanga mpe bakomema bango na bowumbu kati na bikolo nyonso ya bapaya ; mpe bapagano bakonyata Yelusalemi kino tango ya bapagano ekosila koleka.
Yawe akomema bino mpe mokonzi oyo bokopona mpo na koyangela bino, na ekolo oyo bino mpe bakoko na bino botikala nanu koyeba te. Kuna bokogumbamela banzambe mosusu : banzambe ya banzete mpe ya mabanga.
Maloba oyo nawuti koloba, mapamboli mpe bilakeli mabe oyo napesi yo mpo ete opona, ekokokisama. Soki obateli yango malamu na motema na yo kati na bikolo nyonso epai wapi Yawe, Nzambe na yo, akobengana yo ;
Luka koyeba makambo oyo esalema na mikolo ya liboso, liboso ete yo obotama, wuta mokolo oyo Nzambe asala moto na mokili ; luka oyeba makambo oyo esalema kati na mokili banda na suka moko kino na suka mosusu, soki likambo ya monene boye esila kosalema, soki likambo ya boye esila koyokana.