Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 28:54 - Mokanda na Bomoi

54 Mobali ya malamu koleka kati na bino, oyo ayokelaka bato mawa, akoyokela lisusu moto mawa te : ezala ndeko na ye to mwasi oyo ye alingaka to bana na ye oyo batikali.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 28:54
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

kasi mobola azalaki na eloko te longola kaka mwa mwana meme moko ya mwasi oyo asombaki. Abokolaki yango mpe ekolaki epai na ye elongo na bana na ye. Mpate yango ezalaki kolia bilei na sani moko, komela mayi na kopo moko na nkolo na yango mpe kolala na maboko na ye. Ezalaki lokola mwana na ye ya mwasi.


Ndenge tata alingaka makasi bana na ye, ndenge wana mpe Yawe alingaka makasi bato oyo batosaka Ye ;


Kolia te bilei ya moto oyo azali kotala yo na miso mabe mpe kolula te bilei na ye ya kitoko,


Moto ya bilulela azalaka motema moto-moto mpo na kozwa bomengo, mpe ayebaka te ete bobola ekokomela ye.


Boni, mama akoki solo kobosana bebe na ye oyo azali komelisa mabele, to kozanga bolingo epai ya mwana oyo ye aboti ? Ata soki akoki kobosana, ngai nakoki kobosana yo te !


Botia motema te epai ya bazalani na bino, botia elikya te epai ya baninga na bino ya motema. Ezala liboso ya mwasi oyo alalaka na tolo na yo, keba na maloba oyo ezali kobima na monoko na yo.


Soki mwa nzete yango te, bokendeki penza kotala nini ? Moto moko alati bilamba ya kitoko ? Te ! Bato oyo balataka bilamba ya kitoko bavandaka na bandako ya bakonzi.


Boni, nazali na ndingisa te ya kosala na mbongo na ngai nyonso oyo nalingi ? Osilikeli ngai mpo ete nazali moto malamu ? »


Mosakoli to moto wana oyo amonaka makambo, esengeli baboma ye, pamba te azali koteya mpo ete botombokela Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito mpe asikolaki bino na mokili ya bowumbu. Moto wana azalaki nde na posa ya kopengwisa bino na nzela oyo Yawe, Nzambe na bino, atindaki bino kolanda. Boye, bosengeli kolongola mabe kati na bino.


Keba ete motema na yo ezala na makanisi ya mabe te mpe eloba na yo te : « Mobu ya sambo ekomi pene, mobu ya kotika baniongo, » mpo ete otala ndeko na yo mobola na ndenge ya mabe mpe ozanga kopesa ye eloko. Mpe wana ye akolelalela epai na Yawe na tina na yo, okomema ngambo ya masumu na yo.


Mpo na pasi oyo banguna na bino bakomonisa bino tango bakozingela bino, bokolia bana na bino, bokolia misuni ya bana na bino ya mibali mpe ya basi oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bino.


Akopesa na moto moko te kati na bango mosuni ya bana na ye oyo akozala kolia. Yango kaka nde bilei akotikala na yango mpo na pasi oyo banguna na bino bakomonisa bino na tango bakozingela bino na bingumba na bino nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ