53 Mpo na pasi oyo banguna na bino bakomonisa bino tango bakozingela bino, bokolia bana na bino, bokolia misuni ya bana na bino ya mibali mpe ya basi oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bino.
Nakoleisa bango misuni ya bana na bango ya basi mpe ya mibali, bakoliana bango na bango tango bato oyo bazali na posa ya kosala bango mabe bakozingela bango.
Oh Yawe, tala mpe mona ! Nani oyo osalela makambo ya boye ? Boni, basi basengelaki solo kolia mbuma ya mabumu na bango to bana oyo bango moko babokoli ? Boni, basengelaki solo koboma mosakoli mpe Nganga-Nzambe kati na Esika ya bule ya Nkolo ?
Yango wana, kati na bino, batata bakolia bana na bango, mpe bana bakolia batata na bango. Nakopesa bino etumbu mpe nakopanza bipai nyonso bato na bino nyonso oyo bakotikala na bomoi.
Mobali ya malamu koleka kati na bino, oyo ayokelaka bato mawa, akoyokela lisusu moto mawa te : ezala ndeko na ye to mwasi oyo ye alingaka to bana na ye oyo batikali.
Akopesa na moto moko te kati na bango mosuni ya bana na ye oyo akozala kolia. Yango kaka nde bilei akotikala na yango mpo na pasi oyo banguna na bino bakomonisa bino na tango bakozingela bino na bingumba na bino nyonso.
mwana oyo awuti kobima na libumu na ye, mpe bana oyo ye moko aboti ; pamba te akoluka kolia bango na nkuku, na tango oyo banguna na bino bakozingela bino, mpe na tango ya pasi oyo banguna na bino bakomonisa bino kati na bingumba na bino.