Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 28:52 - Mokanda na Bomoi

52 Bakozingela bingumba na bino nyonso kati na mokili na bino kino bamir na bino ya milayi mpe ya makasi oyo botielaka mitema ekokweya. Bakozingela bingumba nyonso kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 28:52
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango mokonzi Ezekiasi akokisaki mibu zomi na minei na bokonzi, Senakeribe, mokonzi ya Asiri, abundisaki bingumba nyonso ya Yuda, oyo batonga makasi mpe abotolaki yango.


Boye tolambaki mwana na ngai ya mobali mpe toliaki ye. Mokolo oyo elandaki, nalobaki na ye : « Pesa mwana na yo ya mobali mpo ete tolia ye, » kasi abombaki ye.


Mokili na bino ebebisami, bingumba na bino esili kozika na moto ; bapaya bazali kobebisa bilanga na bino na miso na bino, nyonso ebebisami solo, lokola tango bapanzaka yango na moto ya mobulu.


Yawe atomboli loboko na Ye ya mobali, loboko na Ye ya nguya, mpe alapi ndayi : « Nakopesa lisusu ble na yo te lokola bilei epai ya banguna na yo ; bapaya bakomela lisusu te vino na yo ya sika oyo omonelaki pasi ;


Yo ekolo oyo bazingeli, kamata bisaka na yo mpe bima na mokili !


Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : « Ya mbala oyo, nakobengana bavandi ya mokili oyo mpe nakotindela bango pasi mpo ete bakanga bango. »


mpe basoda ya Babiloni bakozonga mpe bakobundisa engumba oyo ; bakobotola yango mpe bakobebisa yango na moto. ›


Na kozanga mawa, Nkolo abebisi bandako nyonso ya Jakobi ; na kanda na Ye, akweyisi bandako batonga makasi ya Yuda, mwasi kitoko, mpe asambwisi bokonzi mpe bakambi na yango.


Sima na baposo tuku motoba na mibale, bakoboma Ye oyo azwaki epakolami, atako asalaki na ye mabe ata moko te. Bato ya mokambi oyo azali koya bakobebisa engumba mpe Esika ya bule, mpe suka na yango ekoya lokola mpela ; bongo kino suka ya bitumba ekoma, kobebisama ekozala mpo ete mokano na yango esili kozwama.


Nakopesa nzela na mopanga mpo ete eboma bino mpo na kozongisa mabe na mabe likolo ya boyokani oyo bino bobebisi. Tango bokosangana kati na bingumba na bino, nakotindela bino bokono oyo ebomaka, mpe nakokaba bino na maboko ya monguna.


« Nakokomisa Yelusalemi lokola kopo ya vino oyo elangwisaka bikolo nyonso ya zingazinga na yango ; bakozingela solo Yuda mpe Yelusalemi.


Nakosangisa bikolo nyonso, na Yelusalemi, mpo ete babundisa engumba yango ; bakobotola yango, bakobuka bandako na yango, bakozwa basi na yango na makasi mpo na kobebisa lokumu na bango, mpe ndambo ya bato kati na yango bakokende na bowumbu, bongo ndambo mosusu ya bato bakotikala.


Mokonzi asilikaki makasi, atindaki basoda na ye koboma babomi wana mpe kotumba engumba na bango.


Bakolia bana ya bibwele na bino mpe bambuma ya mabele na bino, kino bakobebisa bino. Bakotikela bino ata ble te, vino ya sika te, mafuta te, ata bana ngombe na bino te, ata bana meme na bino te mpe ata bantaba na bino te kino bokobebisama.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ