Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 28:51 - Mokanda na Bomoi

51 Bakolia bana ya bibwele na bino mpe bambuma ya mabele na bino, kino bakobebisa bino. Bakotikela bino ata ble te, vino ya sika te, mafuta te, ata bana ngombe na bino te, ata bana meme na bino te mpe ata bantaba na bino te kino bokobebisama.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 28:51
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mampinga nyonso ya Babiloni, oyo ezalaki na se ya bokonzi ya mokonzi ya bakengeli ya mokonzi babukaki bamir oyo ezingelaki Yelusalemi.


Mokili na bino ebebisami, bingumba na bino esili kozika na moto ; bapaya bazali kobebisa bilanga na bino na miso na bino, nyonso ebebisami solo, lokola tango bapanzaka yango na moto ya mobulu.


Yawe atomboli loboko na Ye ya mobali, loboko na Ye ya nguya, mpe alapi ndayi : « Nakopesa lisusu ble na yo te lokola bilei epai ya banguna na yo ; bapaya bakomela lisusu te vino na yo ya sika oyo omonelaki pasi ;


Nakosala ete babotola bino biloko mpe bomengo na bino ; bongo bakofuta bino yango te mpo na masumu na bino nyonso oyo bosalaki kati na mokili na bino mobimba.


Oh ngomba na Ngai kati na mokili, nakokaba lokola bomengo ya bitumba : biloko na yo, bozwi na yo nyonso mpe bisambelo na yo ya likolo ya bangomba mpo na masumu oyo osalaki kati na mokili na yo.


Bato oyo bakufi na mopanga bazali malamu koleka ba-oyo bakufi na nzala : banzulukaka mpe bakondaka makasi mpo na nzala, mpo na kozanga bilei kowuta na bilanga.


mpe loba na bato ya mokili oyo : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi epai ya bavandi ya Yelusalemi mpe ya mokili ya Isalaele : Bakolia bilei na bango na kobanga mpe bakomela mayi na bango na somo ; pamba te bakobotola na makasi biloko nyonso ya mokili na bango, likolo ya mabe nyonso ya bavandi na yango.


nakokaba bino na maboko ya bato ya mikili ya este lokola libula, bakotonga milako na bango mpe bakotelemisa bandako na bango ya kapo kati na mokili na bino ; bakolia bambuma na bino mpe bakomela miliki na bino.


Tango nakopimela bino bilei, basi zomi bakotumba mapa na fulu moko mpe bakobanda kopesa bino mapa yango na kilo : bokolia kasi bokotonda te.


Bato oyo boyebi te bakolia bambuma ya mabele na bino mpe ya misala na bino nyonso.


Bato ya ekolo yango bazali na bilongi ya kanda-kanda, batosaka te bato oyo bazali mikolo mpe bayokelaka bilenge mawa te.


Bakozingela bingumba na bino nyonso kati na mokili na bino kino bamir na bino ya milayi mpe ya makasi oyo botielaka mitema ekokweya. Bakozingela bingumba nyonso kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ