Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 28:49 - Mokanda na Bomoi

49 Yawe akotindela bino na mosika, wuta na suka ya mokili, ekolo moko oyo ezali lokola mpongo oyo ezali kopumbwa, ekolo oyo bokososola monoko na yango te ; ekobundisa bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 28:49
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, tokita mpe totia mobulu kati na maloba na bango mpo ete bango na bango bayokana lisusu te. »


Pamba te ezali mobeko mpo na Isalaele, mpe mokano ya Nzambe ya Jakobi.


Nzela ya mpongo na likolo, nzela ya nyoka na likolo ya libanga, nzela ya masuwa kati na ebale, mpe nzela ya elenge mobali epai ya elenge mwasi.


Okomona lisusu bato ya lolendo te, bato oyo monoko na bango ezalaka pasi mpo na koyoka mpe maloba na bango, pasi mpo na kososola.


Boye, mosakoli Ezayi akendeki epai ya mokonzi Ezekiasi mpe atunaki ye : — Bato wana balobi nini mpe bawuti wapi ? Ezekiasi azongisaki : — Bawuti mosika, na mokili ya Babiloni, mpo na koya kotala ngai.


Na mokolo wana, Yawe akobeta piololo mpo na kobenga nzinzi wuta na miluka ya Ejipito mpe banzoyi oyo ezalaka na mokili ya Asiri ;


Tala ! Monguna azali koya na elulu lokola mapata, bashar na ye ezali konguluma lokola mopepe ya makasi ; mpunda na ye kutu eleki mpongo na mbangu. Mawa na biso ! Tokufi na biso !


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Tala ndenge nini mpongo ezali kokita na elulu mpe etandi mapapu na yango likolo ya Moabi.


Tala, mpongo moko ekopumbwa mpe ekokita na elulu, etanda mapapu na yango likolo ya Botsira ! Na mokolo wana, mitema ya basoda ya Edomi ekokoma lokola motema ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota. › »


Bato oyo bazalaki kolanda biso bazalaki mbangu koleka mpongo, na likolo ; bazalaki kolanda biso na likolo ya bangomba mpe kotiela biso mitambo kati na esobe.


nakobengana bino na engumba oyo, nakokaba bino na maboko ya bapaya mpe nakopesa bino etumbu.


« Loba na ndako ya batomboki oyo : ‹ Boni, bozali solo koyeba soki makambo oyo elakisi nini ? › Loba na bango : ‹ Mokonzi ya Babiloni ayaki na Yelusalemi, akangaki mokonzi elongo na bakalaka na yango mpe amemaki bango na mokili na ye, elingi koloba na Babiloni.


Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Mpongo moko ya monene oyo ezalaki na mapapu milayi soki efungwami, na basala ebele ya balangi ya ndenge na ndenge, ekendeki kotelema na Libani. Tango etutaki songe ya nzete moko ya sedele,


Otindami te kati na bikolo ebele oyo monoko na bango ezalaka pasi mpo na koloba mpe kososola. Solo, soki natindaki yo epai ya bikolo wana, balingaki kososola sango oyo omemeli bango.


Nyama ya liboso ezalaki lokola nkosi mpe ezalaki na mapapu lokola mpongo. Wana nazalaki kotala, balongolaki yango mapapu, batombolaki yango longwa na mabele mpo ete etelema na makolo mibale lokola moto ; mpe bapesaki yango motema ya moto.


Sima na baposo tuku motoba na mibale, bakoboma Ye oyo azwaki epakolami, atako asalaki na ye mabe ata moko te. Bato ya mokambi oyo azali koya bakobebisa engumba mpe Esika ya bule, mpe suka na yango ekoya lokola mpela ; bongo kino suka ya bitumba ekoma, kobebisama ekozala mpo ete mokano na yango esili kozwama.


Tia kelelo na monoko na yo ! Lokola mpongo, pasi ekokitela Ndako ya Yawe, mpo ete babebisi boyokani na Ngai mpe batombokeli Mobeko na Ngai.


Bamasuwa ekoya wuta na mabongo ya Kitimi, bakonyokola Ashuri mpe Eberi, kasi bango moko mpe bakobebisama. »


Esika nyonso ebembe ezali kopola, bandeke oyo eliaka bibembe esanganaka wana.


Ekomama boye kati na Mobeko : « Ekozala na nkota ya bapaya, na nzela ya nkota oyo eyebani te nde nakoloba na bato oyo ; kasi atako bongo, bakoyoka ngai te, » elobi Nkolo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ