Ngai elongo na bana oyo Yawe apesi ngai, tozali bilembo mpe bandakisa kati na Isalaele, kowuta na Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo avandaka na ngomba Siona.
Yelusalemi elongo na bingumba ya Yuda, bakonzi mpe bakalaka na yango ; mpo na kobebisa yango, kokomisa yango eloko ya somo, ya maseki mpe ya lisuma, ndenge ezali komonana sik’oyo.
Nakotombokela moto wana, nakokomisa ye elembo mpe lisese epai na bato mpe nakolongola ye na molongo ya bato na Ngai. Na bongo, bokoyeba solo ete Ngai nazali Yawe.
Nzokande, na bisika nyonso oyo bazalaki kokende, babebisaki bosantu ya Kombo na Ngai, pamba te bazalaki koloba na tina na bango : ‹ Bato wana bazali solo bato ya Yawe, kasi tala ndenge batiki mokili na Ye ! ›
Okozala likambo ya soni, ya kotiola, ya liseki mpe ya soni makasi na miso ya bikolo oyo ezingeli yo, tango nakopesa yo etumbu na kanda mpe na kotomboka na Ngai ya makasi penza. » Ngai Yawe nde nalobi.
Yawe akotia ye pembeni kati na bikolo nyonso ya Isalaele, akokaba ye na pasi ndenge ezali bilakeli mabe nyonso ya boyokani oyo ekomama kati na buku ya Mobeko.